Makomi
Alama 25


Mokapo 25

Etumba ya Balamani epanzani—Nkona ya banganga ba Noa bakufi lokola Abinadi abikulaki—Balamani mingi babongwani mpe basangani na bato ba Ati-Nefi-Lehi—Bandimi na Klisto mpe babateli mobeko mwa Mose. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Mpe tala, sikawa esalemaki ete Balamani bana basilikaki mingi koleka zambi babomaki bandeko ba bango; yango wana balapaki bobekoli likolo lya Banefi; mpe bamekaki lisusu te koboma bato ba Ati-Nefi-Lehi o ntango ena.

2 Kasi bakamataki mampinga ma bango mpe bamataki o kati ya ndelo ya mboka ya Zalayemila, mpe bakweyaki likolo lya bato baye bazalaki o mboka ya Amoniya mpe babebisaki bango.

3 Mpe nsima ya yango, bazalaka na bitumba mingi na Banefi, na byango babenganamaki mpe babomamaki.

4 Mpe o ntei ya Balamani baye babomamaki ezalaki penepene na nkona enso ya Amuloni mpe bandeko ba ye, baye bazalaki banganga ba Noa, mpe babomamaki na maboko ma Banefi;

5 Mpe etikali, kokimaka na esobe ya esti, mpe kobotoloko nguya mpe bokulaka likolo lya Balamani, basalaki ete mingi ya Balamani bakoka kokufa na moto na ntina ya boyambi bwa bango—

6 Mpo mingi ya bango, nsima ya koyoka mpasi nzike ya bobungisi mpe matungisi mingi, babandaki kolamusama na bokundoli bwa maloba maye Aloni mpe bandeko ba ye bateyaka na bango o mboka ya bango; yango wana babandaki kondima te mimeseno mya batata ba bango, mpe kondima na Nkolo, mpe ete apesaki nguya enene epai ya Banefi; mpe boye ezalaki mingi ya bango babongwanaki o esobe.

7 Mpe esalemaki ete bayangeli bana baye bazali mintika mya bana ba Amuloni basalaki ete bakoka kotiama na liwa, iyo, bango banso baye bandimaki na makambo maye.

8 Sikawa bomartiru boye bosalaki ete mingi ya bandeko ba bango balamusamaki na nkanda; mpe ebandaki kozala boweli o esobe; mpe Balamani babandaki kolanda bato ba nkona ya Amuloni mpe bandeko ba ye mpe babandaki koboma bango; mpe bakimaki o kati ya esobe ya esti.

9 Mpe tala balandami o mokolo mwa lelo na Balamani. Boye maloba ma Abinadi mamememeki masalema, maye alobaki matali nkona ya banganga baye basalaki ete bakoka koyoka mpasi ya liwa na moto.

10 Mpo alobaki epai ya bango: Nini bokosala epai ya ngai ekozala emoniseli ya makambo makoya.

11 Mpe sikawa Abinadi azalaki moto wa yambo oyo ayokaki mpasi ya liwa na moto na ntina ya boyambi bwa ye na Nzambe; sikawa eye ezali nini alingaki koloba, ete mingi bakoyoka mpasi ya liwa na moto, engebene lokola ayokaka mpasi.

12 Mpe alobaki epai ya banganga ba Noa ete nkona ya bango ekosala mingi batiama na liwa, na lolenge loko lokola ye, mpe ete bakopalanganisama libanda mpe bakobomama, lokola mpate yoko ezanga mokengeli ekobenganama mpe ekobomama na niama ya zamba; mpe sikawa tala, maloba maye malakisami bosolo, mpo babenganamaki na Balamani, mpe balandamaki, mpe babetemeki.

13 Mpe esalemaki ete emonoki Balamani ete bakokaki te kolonga Banefi bazongaki lisusu o mboka ya bangomei; mpe mingi ya bango bayaki kofanda o mboka ya Yisamaele mpe o mboka ya Nefi, mpe bamisangisaki na bato ba Nzambe, baye bazalaki bato ba Ati-Nefi-Lehi.

14 Mpe bakundaki lokola mandoki ma bango ma etumba, engebene lokola bandeko ba bango basalaka, mpe babandaki kozala bato boko sembo; mpe batambolaki o nzela ya Nkolo, mpe batosaki kobatela mitindo mya ye mpe meko ya ye.

15 Iyo, mpe babatelaki mobeko mwa Mose; mpo elongobanaki ete babatela mobeko mwa Mose mpo ya sikawa, mpo mokokisamaki mobimba te. Kasi ata mobeko mwa Mose, batalelaki o boso boyei bwa Klisto, komaniolaka ete mobeko mwa Mose mozalaki emoniseli ya boyei bwa ye, mpe kondimaka ete basengeli kobatela makokisi mana ma libanda kina o ntango eye akobimisama epai ya bango.

16 Sikawa babanzaki te ete lobiko lokoya na mobeko mwa Mose; kasi mobeko mwa Mose mosalisaki mpo ya kopesa bokasi na bondimi bwa bango na Klisto; mpe boye bakangaki elikia yoko o nzela ya bondimi, epai ya lobiko la seko, koyekemeke likolo lya molimo mwa bobikuli, oyo alobelaki makambo makoya.

17 Mpe sikawa tala, Amona, mpe Aloni, mpe Omina, mpe Imini, mpe bandeko ba bango basepelaki mpenza, mpo ya nkonzo eye bazwaki o ntei ya Balamani, komonoko ete Nkolo apesaki epai ya bango engebene na nsambo ya bango, mpe alakisaka lisusu bosolo bwa liloba lya ye epai ya bango na likambo lyoko lyoko.