Makomi
Alama 61


Mokapo 61

Pawolani alobeli Moloni etali eyoma mpe botomboki na boyangeli—Bato ba mokonzi bakamati Zalayemila mpe basali likita elongo na Balamani—Pawolani asengi mpo ya lisalisi lya basoda na kobunda na batomboki. Penepene na 62 Yambo ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete noki esilisaki Moloni kotinda monkanda mwa ye epai ya moyangeli mokonzi, azwaki monkanda uta na Pawolani, moyangeli mokonzi. Mpe iye izali maloba maye azwaki:

2 Ngai, Pawolani, oyo nazali moyangeli mokonzi o mboka eye, natindi maloba maye epai ya Moloni, kapiteni mokonzi likolo lya mampinga. Tala, nalobi epai ya yo, Moloni, ete nasepeli te na matungisi manene ma yo, iyo, esali mpasi na bozo bwa ngai.

3 Kasi tala, izali bango baye basepeli na matungisi ma yo, iyo, mpenza ete batelemi na botomboki na ngai, mpe lisusu bango ba bato ba ngai baye bazali bato nsomi, iyo, mpe bango baye batelemi bazali motango mpenza.

4 Mpe bango baye bakoluka kobotolo kiti ya bosambisi uta na ngai baye bazali ntina ya bobe boye bonene; mpo basaleli malete manene, mpe bakambi mosika mitema mya bato mingi, eye ekozala ntina ya matungisi ma nsomo o ntei ya biso; balongoli bilei bya biso, mpe babangisaki bato nsomi ba biso ete bayei te epai ya yo.

5 Mpe tala, babengani ngai libanda liboso lya bango, mpe nakimi o mboka ya Gideona, elongo na bato mingi lokola ekokaki ete nameme.

6 Mpe tala, natindi esakola yoko o ntaka ya eteni eye ya mboka; mpe tala, bazali koyaka eboke epai ya biso mokolo na mokolo, o mandoki ma bango, mpo ya bobateli bwa ekolo ya bango mpe bonsomi bwa bango, mpe mpo ya kobekola mbeba ya biso.

7 Mpe bayei epai ya biso, mpenza ete bango baye batelemeki o botomboki na biso batiami ntembe, iyo, mpenza ete babangi biso mpe bameki te kobima mpo ya kobunda na biso.

8 Bakamati mboka, to engumba, ya Zalayemila; baponi mokonzi moko likolo lya bango, mpe akomi epai ya mokonzi wa Balamani, na yango asangani na boyokani boko elongo na ye; na yango boyokani andimaki kosimba engumba ya Zalayemila, yango bosimbi abanzaki ekokokisa Balamani kolonga etikali ya mboka, mpe akotiama mokonzi likolo lya bato baye ntango ekolongama bango o nse ya Balamani.

9 Mpe sikawa, o monkanda mwa yo ososoli ngai, kasi ezali likambo te; nasiliki te, kasi nasepeli bonene mwa motema mwa yo. Ngai, Pawolani, nakoluka mpo ya nguya te, longola se kosimba kiti ya ngai ya bosambisi ete nakoka kobatela makoki mpe lipanda lya bato ba ngai. Molimo wa ngai motelemi ngbi o lipanda lya na lyango Nzambe asali biso nsomi.

10 Mpe sikawa, tala, tokotelemela nkuna kutu kina o bosopi makila. Tokosopa te makila ma Balamani soko bakotikala o mboka ya bangomei.

11 Tolingaki kosopa te makila ma bandeko ba biso soko batelemeki te o botomboki na biso mpe bakamati te mopanga mpo ya kobunda na biso.

12 Tolingaki komitika na boyangeli bwa nkanga ya bowumbu soko esengelaki na boyengebene bwa Nzambe, to soko akotindaki biso kosala boye.

13 Kasi tala atindi biso te ete tomiyangelisama na boyangeli bwa bayini ba biso, kasi tosengeli kotia elikia ya biso na ye, mpe akobikisa biso.

14 Yango wana, ndeko mobali molingami wa ngai, Moloni, totelemela bobe, mpe bobe bonso tokokoka te kotelemela maloba ma biso, iyo, lokola botomboki mpe bokabwani, totelemela yango na mipanga mya biso, ete tokoka kosimba bonsomi bwa biso, ete tokoka kosepela na makoki ma eklezia ya biso, mpe na likambo lya Mosikoli mpe Nzambe wa biso.

15 Yango wana, yaka epai ya ngai noki elongo na ndambo ya bato ba yo, mpe tika etikali esusu na mokumba mwa Lehi mpe Teakumi; pesa epai ya bango nguya mpo ya kokamba etumba o eteni ena ya mboka, engebene na Molimo mwa Nzambe, oyo azali lokola molimo mwa bonsomi boye bozali na bango.

16 Tala natindi ndambo moko ya bilei epai ya bango, ete bakoka kowa te na nzala kina bokoya epai ya ngai.

17 Sangisa elongo makasi manso maye okoki likolo lya botamboli bwa yo awa, mpe tokokende noki kobunda na bakabwani bana, o bokasi bwa Nzambe wa biso engebene na bondimi boye bozali na biso.

18 Mpe tokobotolo engumba ya Zalayemila, ete tokoka kozwa bilei mingi koleka mpo ya kotinda epai ya Lehi mpe Teakumi; iyo, tokokende kobunda na bango o bokasi bwa Nkolo, mpe tokotia nsuka yoko o bobe bonene.

19 Mpe sikawa, Moloni, nasepeli na kozwaka monkanda mwa yo, mpo nazalaki mwa moke motema likolo etali nini tosengeli kosala, soko ekozala eyengebeni na biso kokende kobunda na bandeko ba biso.

20 Kasi olobi, longola se soko bayamboli Nkolo atindi yo okende kobunda na bango.

21 Tala ete olendisa Lehi mpe Teakumi na Nkolo; lobela bango babanga te, mpo Nzambe akobikisa bango, iyo, mpe lisusu bango banso baye bakoteleme ngbi o lipanda lya wapi Nzambe asali bango nsomi. Mpe sikawa nakangi monkanda mwa ngai na ndeko mobali molingami wa ngai, Moloni.