Makomi
Alama 29


Mokapo 29

Alama azali na mposa ya kobelela boyamboli na mpila ya banzelu—Nkolo apesi balakisi mpo ya bikolo binso—Alama akembeli na mosala mwa Nkolo mpe na nkonzo ya Amona mpe bandeko ba ye. Penepene na 76 Yambo ya Klisto.

1 O ete nazalaka anzelu, mpe nakokaka kozala na litombeli lya motema mwa ngai, ete nakokaka kokende mpe koloba na mondule mwa Nzambe, na mongongo moko mwa koningisa mabele, mpe kobelela boyamboli epai ya bato banso!

2 Iyo, nalingi kosakola epai ya bozo bonso, lokola na mongongo mwa nkake, boyamboli mpe mwango mwa bosikoli, ete basengeli koyambola koya epai ya Nzambe wa biso, ete ekoka lisusu te kozala mawa likolo lya mabele mobimba.

3 Kasi tala, ngai nazali moto moko, mpe nakosumukaka na litombeli lya ngai; mpo nasengelaki kosepela na kosala makambo maye Nkolo apesaki epai ya ngai.

4 Nasengeli te kopasola na mposa ya motema mwa ngai mobeko mwa sikisiki mwa Nzambe moko moyengebene, mpo nayebi ete akopesaka epai ya bato engebene na mposa ya bango, soko ekozala mpo ya liwa to bomoi; iyo, nayebi ete akokabolaka epai ya bato, iyo, akopesaka mibeko epai ya bango mibeko miye mibongwanaka te, engebene na bolingi bwa bango, soko ekozala mpo ya lobiko to mpo ya bobebisami.

5 Iyo, mpe nayebi ete bolamu mpe bobe boyaki yambo ya bato banso; ye oyo ayebi te bolamu uta o bobe azangi mpamela; kasi ye oyo ayebi bolamu mpe bobe, na ye epesami engebene na mposa ya ye, soko ezali na mposa ya bolamu to bobe, bomoi to liwa, bosepeli to boswi bwa motema.

6 Sikawa, komonoko ete nayebi makambo maye, ntina nini nakozala na mposa ya kosala mingi koleka kosala mosala na mwango nabiangemi?

7 Ntina nini nakozala na mposa ete nazala anzelu, ete nakoka koloba epai ya nsuka inso ya mabele?

8 Mpo tala, Nkolo akopesaka epai ya bikolo binso, ya ekolo mpe monoko mwa bangomei, mpo ya kolakisa liloba lya ye, na bwania, inso iye amoni ekoki na bango kozwa; yango wana tomoni ete Nkolo akopesaka toli na bwania, engebene na eye eyengebeni mpe ya solo.

9 Nayebi ete eye Nkolo atindi ngai, mpe nakembeli na yango. Nakembeli na ngaimei te, kasi nakembeli na eye Nkolo atindi ngai; iyo, mpe eye ezali nkembo ya ngai, ete mbele nakoka kozala esalele yoko o maboko ma Nzambe mpo ya komeme yoko bozo o bobongoli bwa mitema; mpe eye ezali bosepeli bwa ngai.

10 Mpe tala, emoni ngai mingi ya bandeko ba ngai bayamboli ba solo, mpe koyaka na Nkolo Nzambe wa bango, nde etondi bozo bwa ngai na bosepeli; nde namikundoli nini Nkolo asali mpo ya ngai, iyo, kutu ete ayoki losambo la ngai; iyo, nde namikundoli loboko la ye la ngolu loye aninolaki ona ngai.

11 Iyo, mpe namikundoli bokangemi bwa batata ba ngai; mpo nayebi solo ete Nkolo abikisaki bango libanda lya bowumbu, mpe na eye atiaki eklezia ya ye; iyo, Nkolo Nzambe, Nzambe wa Abalayama, Nzambe wa Yisaka, mpe Nzambe wa Yakobo, abikisaki bango libanda lya bowumbu.

12 Iyo, ntango inso nakomikundolaka bokangemi bwa batata ba ngai; mpe ete kaka Nzambe ona oyo abimisaki bango libanda lya maboko ma Baejipito abikisaki bango libanda lya bowumbu.

13 Iyo, mpe kaka Nzambe ena atiaki eklezia ya ye o ntei ya bango; iyo, mpe kaka Nzambe ona abiangi ngai na libiangi lyoko lisantu, mpo ya koteya liloba epai ya bato baye, mpe apesi ngai nkonzo nzike, na yango bosepeli bwa ngai botondi.

14 Kasi nasepeli te bobele na nkonzo ya ngaimei, kasi bosepeli bwa ngai botondi mingi koleka na ntina ya nkonzo ya bandeko ba ngai, baye bamataki o mboka ya Nefi.

15 Tala, basali mpenza, mpe baboti mbuma nzike; mpe boniboni enene ekozala mbano ya bango!

16 Sikawa, ekanisi ngai nkonzo ya bandeko baye ba ngai bozo bwa ngai bomememi mosika, kutu mpo ya bokaboli bwa bwango uta na nzoto, lokola soko ezalaki, boye enene ezali bosepeli bwa ngai.

17 Mpe sikawa, tika Nzambe apesa epai ya baye, bandeko ba ngai, ete bakoka kofanda o bokonzi bwa Nzambe; iyo, mpe lisusu bango banso baye bazali mbuma ya misala mya bango ete bakoka kokende lisusu te libanda, kasi ete bakoka kokumisa ye libela. Mpe tika Nzambe atika ete ekoka kosalema engebene na maloba ma ngai, kutu lokola nalobaki. Amene.