Makomi
Alama 46


Mokapo 46

Amalikia asali ekokolo mpo ya kozala mokonzi—Moloni atomboli nkombo ya lipanda—Asangisi bato mpo ya kobatela eyamba ya bango—Bandimi ba solo babiangemi Baklisto—Montika mwa nkona ya Yosefe mokobatelama—Amalikia mpe bakabwani bakimi o mboka ya Nefi—Bango baye bakosunga te likambo lya bonsomi bakotiama o liwa. Penepene na 73–72 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete lokola mingi balingaki te koyokemela o maloba ma Elamani mpe bandeko ba ye basangisamaki elongo mpo ya kobunda na bandeko ba bango.

2 Mpe sikawa tala, bazalaki na nkele mpenza, mpenza ete bazwaki mokano mpo ya koboma bango.

3 Sikawa mokambi wa bango baye bazalaki na nkele na bandeko ba bango azalaki moto moko monene mpe mokasi; mpe nkombo ya ye ezalaki Amalikia.

4 Mpe Amalikia azalaki na mposa ya kozala mokonzi moko; mpe bato bana baye bazalaki na nkele bazalaki na mposa ete azala mokonzi wa bango; mpe bazalaki eteni eleki enene ya bango basambisi ba nse ba mboka, mpe bazalaki kolukaka mpo ya nguya.

5 Mpe bakambemaka na malete ma Amalikia, ete soko bakosunga ye mpe bakotia ye mpo ya kozala mokonzi wa bango ete akosala bango bayangeli likolo lya bato.

6 Boye bamememeki mosika na Amalikia na bokabwani, ata liteya lya Elamani mpe bandeko ba ye, iyo, ata bokebi bonene mpenza bwa bango likolo lya eklezia, mpo bazalaki banganga banene likolo lya eklezia.

7 Mpe izalaki mingi o eklezia baye bandimaki o maloba ma koleteke ma Amalikia, yango wana bakabwanaki kutu uta o eklezia; mpe boye izalaki makambo ma bato ba Nefi wayawaya mpe ma likama mpenza, ata elonga enene eye bazwaka likolo lya Balamani, mpe bosepeli bonene bwa bango boye bazwaka na ntina ya libiki lya bango na loboko la Nkolo.

8 Boye tomoni boniboni mbangu bana ba bato bakobosanaka Nkolo Nzambe wa bango, iyo, boniboni noki bakosalaka bobe, mpe bakokambemaka mosika na moko wa bobe.

9 Iyo, mpe tomoni lisusu nkuna enene moto moko wa nkuna mpenza akoki kosala esalema o ntei ya bana ba bato.

10 Iyo, tomoni ete Amalikia, zambi azalaki moto moko wa bisalasala bya mayele mabe mpe moto moko wa maloba ma koleteke mingi, ete akambaki mosika mitena mya bato mingi mpo ya kosala na nkuna; iyo, mpe koluka kobebisa eklezia ya Nzambe, mpe kobebisa bokelami bwa lipanda liye Nzambe apesaka epai ya bango, to liye lipamboli Nzambe atindaka likolo lya etando ya mboka mpo ya litomba lya basembo.

11 Mpe sikawa esalemaki ete eyokaka Moloni, oyo azalaki komanda mokonzi wa mampinga ma Banefi, bokabwani boye, asilikaki na Amalikia.

12 Mpe esalemaki ete apasolaki kazaka ya ye; mpe akamataki kitendi yoko ya yango mpe akomaki likolo lya yango—O likundoli lya Nzambe wa biso, eyamba ya biso, mpe bonsomi, mpe kimia ya biso, basi ba biso, mpe bana ba biso—mpe akangaki yango likolo lya nsonge ya nzete yoko.

13 Mpe akangaki likolo lya ebende ya ye ya moto, mpe ebende ya ye ya ntolo, mpe nguba ya ye, mpe azingaki likolo lya ebundele ya ye penepene na nketo ya ye; mpe akamataki nzete likolo lya nsonge ya yango kazaka ya ye epasuka, (mpe abiangaki yango nkombo ya lipanda) mpe amigumbaki o mabele, mpe asambelaki na makasi epai ya Nzambe wa ye mpo mapamboli ma lipanda matikala likolo lya bandeko ba ye, ntango elai lokola lingomba lyoko lya Baklisto likozala mpo ya kozwa mboka—

14 Mpo boye bandimi banso ba solo ba Klisto, baye bazalaki ba eklezia ya Nzambe, babiangemaki na bango baye bazalaki te ba eklezia.

15 Mpe bango baye bazalaki ba eklezia bazalaki potongono; iyo, bango banso baye bazalaki bandimi ba solo ba Klisto, bakamataki, na bosepeli, nkombo ya Klisto, to Baklisto lokola babiangemaki, na ntina ya boyambi bwa bango na Klisto oyo akoya.

16 Mpe boye, na ntango eye, Moloni asambelaki ete likambo lya Baklisto, mpe bonsomi bwa mboka bokoka kosungama.

17 Mpe esalemaki ete esopaki libanda Moloni bozo bwa ye epai ya Nzambe, atangaki nkombo ya mboka inso izalaki o sudi ya mboka Mpamba, iyo, mpe o nsuka, mboka mobimba, o nordi mpe o sudi lokola—mboka eponomo, mpe mboka ya lipanda.

18 Mpe alobaki: Solo Nzambe akondima te ete biso, baye totiolami zambi tokamati likolo lya biso nkombo ya Klisto, toniatama o nse mpe tobebisama, kina tokomeme yango likolo lya biso na bobuki mobeko mwa bisomei.

19 Mpe elobaki Moloni maloba maye, akendeki o ntei ya bato, kopepaka eteni epasulama ya elamba ya ye o mopepe, ete banso bakoka komono monkoma moye akomaka likolo lya eteni epasulama ya ye, mpe kogangaka na mongongo mokasi, kolobaka:

20 Tala, banso baye bakosimba nkombo eye likolo lya mboka, tika bango baya o makasi ma Nkolo, mpe bakota o kati ya boyokani boko ete bakosimba makoki ma bango, mpe eyamba ya bango, ete Nkolo Nzambe apambola bango.

21 Mpe esalemaki ete esakolaka Moloni maloba maye, tala, bato bayaki kokimaka elongo na ebundele ya bango ezingami penepene na nketo ya bango, kopasolaka bilamba bya bango bo elembo, to lokola boyokani boko, ete bakotika te Nkolo Nzambe wa bango; to, na maloba masusu, soko babuki mitindo mya Nzambe, to bakwei o kati ya bobuki mobeko, mpe bayoki nsoni mpo ya kokamata likolo lya bango nkombo ya Klisto, Nkolo akopasola bango kutu lokola bapasolaka bilamba bya bango.

22 Sikawa eye ezali boyokani boye basalaki, mpe babwakaki bilamba bya bango o makolo ma Moloni, kolobaka: Biso toyokani elongo na Nzambe wa biso, ete tokobebisama, kutu lokola bandeko ba biso o mboka ya epai ya nordi, soko tokokweya o kati ya bobuki mobeko; iyo, akoki kobwaka biso o makolo ma bayini ba biso, kutu lokola tobwaki bilamba bya biso o makolo ma yo mpo ya koniatama o nse ya makolo, soko tokokweya o kati ya bobuki mobeko.

23 Moloni alobaki epai ya bango: Tala, tozali montika moko mwa nkona ya Yakobo; iyo, tozali montika moko mwa nkona ya Yosefe, oyo ya ye bilamba bipasolamaki na bandeko ba ye na bitendi mingi; iyo, mpe sikawa tala, tomikundola kobatela mitindo mya Nzambe, to bilamba bya biso bikopasolama na bandeko ba biso, mpe tokobwakama o kati ya boloko, to kotekeme, to tokobomama.

24 Iyo, tobatela lipanda lya biso lokola montika moko mwa Yosefe; iyo, tomikundola maloba ma Yakobo, yambo ya liwa lya ye, mpo tala, amonoki ete eteni yoko ya kazaka ya Yosefe ebatelamaki mpe ekokakolama te. Mpe alobaki—Kutu lokola montika mwa elamba ya mwana mobali wa ngai mobatelami, boye ebatelama montika moko mwa nkona ya mwana mobali wa ngai na maboko ma Nzambe, mpe mokokamatama epai ya yemei, ntango ekowa etikali ya nkona ya Yosefe, kutu lokola montika mwa elamba ya ye.

25 Sikawa tala, eye epesi bozo bwa ngai mawa; nzokande, bozo bwa ngai bozali na bosepeli na mwana mobali wa ngai, na ntina ya eteni ya nkona ya ye eye ekozwama epai ya Nzambe.

26 Sikawa tala, eye ezalaki elobeli ya Yakobo.

27 Mpe sikawa nani ayebi soko montika mwa nkona ya Yosefe, moye mokowa lokola elamba ya ye, bazali bango baye bakabwanaki uta na biso? Iyo, mpe kutu ekozala bisomei soko totelemi ngbi te o bondimi bwa Klisto.

28 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Moloni maloba maye, akendeki, mpe lisusu atindaki o biteni binso bya mboka wapi ezalaki boswani, mpe asangisaki elongo bato banso baye bazalaki na mposa ya kosimba lipanda lya bango, mpo ya kotelemela Amalikia mpe bango baye bakabwanaki, baye babiangemaki Baamalikiayi.

29 Mpe esalemaki ete emonoki Amalikia ete bato ba Moloni bazalaki na motango mingi koleka Baamalikiayi—mpe amonoki lisusu ete bato ba ye bazalaki na ntembe etali boyengebene bwa likambo liye babandaka—yango wana, kobangaka ete alonga te mbano, akamataki bato ba ye baye balingaki mpe akendeki o kati ya mboka ya Nefi.

30 Sikawa Moloni akanisaki elongobanaki ete te Balamani bazala lisusu na makasi; yango wana akanisaki kokata Baamalikiayi, to kokamata bango mpe komeme bango nsima, mpe kotia Amalikia o liwa; iyo, mpo ayebaki ete akolamusa Balamani na nkanda likolo lya bango, mpe akosala baya o etumba likolo lya bango; mpe eye ayebaki ete Amalikia akosala ete akoka kokokisa mwango mwa ye.

31 Yango wana Moloni akanisaki ete elongobanaki ete akamata mampinga ma ye, baye bamisangisaki elongo, mpe bakamataki mandoki bangomei, mpe bakotaki o kati ya boyokani bwa kobatela kimia—mpe esalemaki ete akamataki limpinga lya ye mpe atambolaki libanda elongo na biema bya lyango o kati ya esobe, mpo ya kokata botamboli bwa Baamalikiayi o esobe.

32 Mpe esalemaki ete asalaki engebene na mposa ya ye, mpe atambolaki o kati ya esobe, mpe alekaki liboso lya mampinga ma Amalikia.

33 Mpe esalemaki ete Amalikia akimaki elongo na motango moke mwa bato ba ye, mpe etikali bapesamaki na maboko ma Moloni mpe bakamatamaki nsima o kati ya mboka ya Zalayemila.

34 Sikawa, Moloni kozalaka moto aponomoki na basambisi bakonzi mpe na mokano mwa bato, yango wana azalaki na nguya engebene na bolingi bwa ye na mampinga ma Banefi, mpo ya kotia mpe kosalela bokulaka likolo lya bango.

35 Mpe esalemaki ete onso oyo ya Baamalikiayi oyo alingaki te kokota o kati ya boyokani mpo ya kosunga likambo lya bonsomi, ete bakoka kosimba boyangeli boko bwa bonsomi, asalaki atiama o liwa; mpe ezalaki bake baye bowanganaki boyokani bwa bonsomi.

36 Mpe esalemaki lisusu, ete asalaki nkombo ya lipanda ematisama likolo lya linongi na linongi liye lizalaki o mboka mobimba, eye ezwamaki na Banefi; mpe boye Moloni atelemisaki bendele ya lipanda o ntei ya Banefi.

37 Mpe babandaki kozala na kimia lisusu o mboka; mpe boye basimbaki kimia o mboka kina penepene na nsuka ya mobu mwa zomi na libwa mwa bokonzi bwa basambisi.

38 Mpe Elamani mpe banganga banene basimbaki molongo o eklezia; iyo, kutu mpo ya ntaka ya mobu minei ezalaki bango na kimia, mpe bosepeli o eklezia.

39 Mpe esalemaki ete izalaki bato mingi baye bakufaki, sikisiki kondimaka ete bozo bwa bango bosikolamaki na Nkolo Yesu Klisto; boye bakendeki libanda lya mokili kosepelaka.

40 Mpe izalaki boko baye bakufaki na masakima, maye o boko bileko bya mobu mazalaki mingi mingi o mboka—kasi nzike te boye na masakima, na ntina ya lolenge kitoko mingi ya matiti mpe misisa miye Nzambe alengeleke mpo ya kolongola ntina ya malali, o nse ya bwango bato bazalaki na lizali lya ntango—

41 Kasi izalaki mingi baye bakufaki na mibu mingi; mpe bango baye bakufaki o bondimi bwa Klisto bazali na esengo na ye, lokola tosengeli mpenza kobanza.