Makomi
Alama 54


Mokapo 54

Amoloni mpe Moloni basambi mpo ya kobetinia bato ba boloko—Moloni asengi ete Balamani balongwa mpe batika etumba ya bango ya kobomaboma—Amoloni asengi ete Banefi balalisa o nse mandoki ma bango mpe bakoma bayangelami na Balamani. Penepene na 63 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o ebandeli ya mobu mwa tuku mibale na libwa mwa basambisi, ete Amoloni atindaki moto epai ya Moloni kozalaka na mposa ete alinga kobetinia bato ba boloko.

2 Mpe esalemaki ete Moloni ayokaki bosepeli mpenza o esenge eye, mpo alingaki ete bilei biye bakabaki mpo ya lisungi lya Balamani ba boloko mpo ya lisungi lya bato ba yemei; mpe lisusu azalaki na mposa ya bato ba ye mpo ya kolendisa limpinga lya ye.

3 Sikawa Balamani bakamataki basi mpe bana mingi, mpe ezalaki te mwasi moko to mwana moko o ntei ya bato ba boloko bwa Moloni, to bato ba boloko baye Moloni akamataka; yango wana Moloni akanisaki mokano mwa angele yoko mpo ya kozwa bato ba boloko mingi ba Banefi uta na Balamani lokola ekokaki.

4 Yango wana akomaki monkanda, mpe atindaki mwango na mosali wa Amoloni, oyo kaka amemeki monkanda na Moloni. Sikawa iye izali maloba maye akomaki epai ya Amoloni, kolobaka:

5 Tala, Amoloni, nakomi epai ya yo mwa likambo litali etumba eye obundaki na bato ba ngai, to kutu eye ndeko mobali wa yo abundaki na bango, mpe eye ozali naino na mokano mwa komeme nsima ya liwa lya ye.

6 Tala, nalingi kolobela yo mwa likambo litali boyengebene bwa Nzambe, mpe mopanga mwa nkele ya ye ya bokasi bonso, eye adiembeli likolo lya yo longola se soko oyamboli mpe olongoli mampinga ma yo o kati ya mboka ya yomei, to mboka ya bozwi bwa yo, eye bozali mboka ya Nefi.

7 Iyo, nalingi kolobela yo makambo maye soko okokaki koyokemela epai ya mango; iyo, nalingi kolobela yo etali limfelo lina lya nsomo liye lizeli mpo ya koyamba babomi ba lolenge loye lokola yo mpe ndeko wa yo bozali, longola se soko oyamboli mpe olongoli mwango mwa yo mwa kobomaboma, mpe bozongi elongo na mampinga ma bino o ntei ya mboka ya binomei.

8 Kasi lokola mbala yoko obwakaki makambo maye, mpe obundaki na bato ba Nkolo, kutu boye nakoki kozela okozongela yango lisusu.

9 Mpe sikawa tala, tobongisi koyamba yo; iyo, mpe longola se soko olongoli mwango mwa yo, tala, okobenda o nse nkele ya Nzambe oyo obwakaki likolo lya yo, kutu o bobebisami bwa yo mobimba.

10 Kasi, lokola Nkolo azali na bomoi, mampinga ma biso makoya likolo lya yo longola se soko olongwi, mpe okobimelama noki na liwa, mpo tokosimba bingumba bya biso mpe mboka ya biso; iyo, mpe tokosimba eyamba ya biso mpe likambo lya Nzambe wa biso.

11 Kasi tala, ebanzi ngai ete nalobeli yo etali makambo maye na mpamba; to ebanzi ngai ete ozali mwana wa limfelo; yango wana nakokanga monkanda mwa ngai na kolobelaka yo ete nakobetinia te bato ba boloko, longola se soko ezali o lisengisi ete atika mobali moko mpe mwasi wa ye mpe bana ba ye, mpo ya moto wa boloko moko; soko eye ezali boye, nakobetinia.

12 Mpe tala, soko osali eye te, nakoya kobunda na yo elongo na mampinga ma ngai; iyo, kutu nakopesa mandoki na basi ba ngai mpe bana ba ngai, mpe nakoya kobunda na yo, mpe nakolanda yo kutu o kati ya mboka ya yomei, eye ezali mboka ya lisango lya biso lya yambo; iyo, mpe ekozala makila mpo ya makila, iyo, bomoi mpo ya bomoi; mpe nakopesa yo etumba kutu kina bokobebisama uta o etando ya mabele.

13 Tala, nazali na nkanda ya ngai, mpe lokola bato ba ngai; oluki koboma biso, mpe toluki bobele komibatela. Kasi tala, soko boluki kobebisa biso lisusu tokoluka kobebisa bino; iyo, mpe tokoluka mboka ya biso, mboka ya lisango lya biso lya yambo.

14 Sikawa nakangi monkanda mwa ngai. Nazali Moloni; nazali mokambi moko wa bato banso ba Banefi.

15 Sikawa esalemaki ete Amoloni, ezwaki ye monkanda moye, asilikaki; mpe akomaki monkanda mosusu epai ya Moloni, mpe iye izali maloba akomaki, kolobaka:

16 Nazali Amoloni, mokonzi wa Balamani; nazali ndeko mobali wa Amalikia oyo bobomaki. Tala, nakobekola makila ma ye likolo lya bino, iyo, mpe nakoya epai ya bino elongo na mampinga ma ngai mpo nabangi te bokaneli bwa yo.

17 Mpo tala, batata ba bino basalaki mbeba na bandeko ba bango, mpenza ete bayibaki bango likoki lya bango o boyangeli ntango bozalaki bwa bango.

18 Mpe sikawa tala, soko bokolalisa o nse mandoki ma bino, mpe bokomiyangelisa mpo ya koyangelama na bango baye basengelami bokonzi, nde nakosala ete bato ba ngai balalisa o nse mandoki ma bango mpe bakozala na etumba lisusu te.

19 Tala, ofuli bokaneli mingi na ngai mpe bato ba ngai; kasi tala, tobangi te bokaneli bwa yo.

20 Nzokande, nakondima kobetinia bato ba boloko, engebene na esenge ya yo, na bosepeli, ete nakoka kobatela bilei bya ngai mpo ya bato ba ngai ba etumba; mpe tokobunda etumba yoko eye ekozala seko, soko mpo ya koyangela Banefi na bokonzi bwa biso to mpo ya bosili bwa bango bwa seko.

21 Mpe lokola etali eye Nzambe oyo bolobi tobwakaki, tala, toyebi te mozali moko wa lolenge lona; mpe bino lokola; kasi soko ezali ete ezali mozali moko wa lolenge lona, toyebi ete asalaki biso mpe bino lokola.

22 Mpe soko ezali ete ezali zabulu moko mpe limfelo lyoko, tala akotinda yo kuna kofanda elongo na ndeko mobali wa ngai oyo obomi, oyo olobi ete akei o esika ya lolenge loye? Kasi tala makambo maye mazali na ntina te.

23 Nazali Amoloni, mpe eboto moto ya Zolami, oyo batata ba yo balandelaki mpe bamemeki o libanda lya Yelusaleme.

24 Mpe tala sikawa, nazali Molamani moko azanga nsomo; tala, etumba eye esalemaki mpo ya kobekola mbeba ya bango, mpe mpo ya kosimba mpe mpo ya kozwa likoli lya bango lya boyangeli; mpe nakangi monkanda mwa ngai na Moloni.