Buku ya Alama Mwana mobali wa Alama

Mokapo 58

Elamani, Gidi, mpe Teomina bakamati mboka ya Mati na angele yoko—Balamani balongwi—Bana babali ba bato ba Amona babatelami lokola batelemi ngbi na bobateli bwa lipanda mpe bondimi bwa bango. Penepene na 63–62 Yambo ya Klisto.

1 Mpe tala, sikawa esalemaki ete ntina ya biso ya nsima ezalaki kozwa engumba ya Mati; kasi tala, ezalaki likoki te ete tokoka kokamba bango libanda lya engumba na lingomba like lya biso. Mpo tala, bamikundolaki ena eye tosalaki kina awa; yango wana tokokaki te kobimisa bango mosika uta o bisika bikasi bya bango.

2 Mpe bango bazalaki boye mpenza mingi koleka limpinga lya biso ete tomekaki te kokende kobanda kobunda na bango o bisika bikasi bya bango.

3 Iyo, mpe ekomaki elongobani ete tosalela bato ba biso mpo ya bosimbi biteni bina bya mboka biye tokamataka lisusu na bozwi bwa biso; yango wana ekomaki elongobani ete tozela, ete tokoka kozwa makasi masusu uta o mboka ya Zalayemila mpe lisusu bobakisi bwa bilei bya sika.

4 Mpe esalemaki ete natindaki boye bontoma boko na moyangeli wa mboka ya biso, mpo ya koyebisa ye etali makambo ma bato ba biso. Mpe esalemaki ete tozelaki kozwa bilei mpe makasi uta o mboka ya Zalayemila.

5 Kasi tala, eye epesaki biso litomba kasi like; mpo Balamani bazalaki lokola kozwaka makasi manene mokolo na mokolo, mpe lisusu bilei mingi; mpe boye nde izalaki bizalela bya biso o eleko eye ya ntango.

6 Mpe Balamani bazalaki kowelisaka kobunda na biso mbala na mbala, kokwaka mokano na angele mpo ya kobebisa biso; nzokande tokokaki te koya kobunda na bango, na ntina ya bibombelo mpe bisika bikasi bya bango.

7 Mpe esalemaki ete tozelaki o bizalela biye bya kpokoso mpo ya ntaka ya nsanza mingi, kutu kina tokomaki penepene na kowa mpo ya mposa ya bilei.

8 Kasi esalemaki ete tozwaki bilei, biye bikengelemeki mpo ya biso na limpinga lya bato nkoto ibale mpo ya lisalisi lya biso; mpe eye ezali lisalisi linso lye tozwaki, mpo ya kobatela bisomei mpe ekolo ya biso uta o bokwei o kati ya maboko ma bayini ba biso, iyo, mpo ya kowela na moyini moko oyo akokaki kotangema te.

9 Mpe sikawa ntina ya matata ma biso, to ntina nini batindaki te makasi masusu epai ya biso, toyebaki te; yango wana toyokaki mpasi mpe totondaki lisusu na bobangi, mbele na yoko nzela bosambisi bwa Nzambe boya likolo lya mboka ya biso, mpo ya bokwei mpe bobebisami bwa biso nie.

10 Yango wana tosopaki libanda bozo bwa biso o losambo na Nzambe, ete alinga kolendisa biso mpe kobikisa biso libanda lya maboko ma bayini ba biso, iyo, mpe lisusu kopesa biso bokasi ete tokoka kosimba bingumba bya biso, mpe mboka ya biso, mpe bozwi bwa biso, mpo ya lisalisi lya bato ba biso.

11 Iyo, mpe esalemaki ete Nkolo Nzambe wa biso abimelaki biso na elikia ete akobikisa biso; iyo, mpenza ete alobaki kimia na bozo bwa biso, mpe apesaki epai ya biso bondimi bonene, mpe asalaki biso ete tolikia mpo ya libiki lya biso na ye.

12 Mpe tozwaki mpiko elongo na makasi make ma biso maye tozwaka, mpe tozalaki sikisiki na mokano moko mwa kolonga bayini ba biso, mpe kosimba mboka ya biso, mpe bozwi bwa biso, mpe basi ba biso, mpe bana ba biso, mpe likambo lya lipanda lya biso.

13 Mpe boye tokendeki elongo na bokasi bwa biso bonso kobunda na Balamani, baye bazalaki o engumba ya Mati; mpe totelemisaki biema bya biso o mopanzi bwa esobe, moye mozalaki penepene na engumba.

14 Mpe esalemaki ete o mokolo mwa nsima, ete emonoki Balamani ete tozalaki o ndelo mpembeni ya esobe eye ezalaki penepene na mboka, batindaki libanda banongi ba bango zingazinga mpembeni na biso ete bakoka kobombola motango mpe bokasi bwa mampinga ma biso.

15 Mpe esalemaki ete emonoki bango ete tozalaki na bokasi te, engebene na mitango mya biso, mpe kobangaka ete tokata bango lisalisi lya bango longola se soko bayei kobunda na biso mpe koboma biso, mpe lisusu kobanzaka ete bakokaki na mpasi te kobebisa biso elongo na mampinga ma bango ma motango monene, yango wana babandaki kosala bolengeli mpo ya koya kobunda na biso o etumba.

16 Mpe emonoki biso ete bazalaki kolengeleke mpo ya kobima kobunda na biso, tala, nasalaki ete Gidi, elongo na motango moke mwa bato, amibomba o esobe, mpe lisusu ete Teomina mpe motango moke mwa bato bamibomba lokola o esobe.

17 Sikawa Gidi mpe bato ba ye bazalaki o loboko la mobali mpe basusu o loboko la mwasi; mpe ebombamaki bango, tala, natikalaki, elongo na etikali ya mampinga ma ngai, o esika ena kaka wapi totelemisaka yambo biema bya biso mpo ya ntango eye Balamani bakobima mpo ya kobunda.

18 Mpe esalemaki ete Balamani babimaki elongo na limpinga lya bango lya motango monene mpo ya kobunda na biso. Mpe eyaka bango mpe ezalaka bango mpembeni ya kokweya likolo lya biso elongo na mopanga, nasalaki ete bato ba ngai, bango baye bazalaki elongo na ngai, babombana o kati ya esobe.

19 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki nsima ya biso na lombango lonene, mpo bazalaki na mposa mpenza ya kokanga biso ete bakoka koboma biso; yango wana balandaki biso o kati ya esobe; mpe tolekaki mpembeni o katikati ya Gidi mpe Teomina, mpenza ete babombolaki bango te na Balamani.

20 Mpe esalemaki ete elekaka Balamani mpembeni, to elekaka limpinga mpembeni ya Gidi mpe Teomina batelemeki uta o bisika bya bango bya bobombami, mpe bakataki banongi ba Balamani ete bazonga te o engumba.

21 Mpe esalemaki ete ekataka bango bango, bakimaki o engumba mpe bakweyaki likolo lya bakengeli baye batikalaki mpo ya kokengele engumba, mpenza ete babebisaki bango mpe bakamataki engumba.

22 Sikawa eye esalemaki zambi Balamani batikaki limpinga lya bango mobimba, longola se bakengeli bake, bakambema mosika o kati ya esobe.

23 Mpe esalemaki ete Gidi mpe Teomina na nzela eye akamataki bozwi bwa bisika bikasi bya bango. Mpe esalemaki ete tokamataki nzela ya biso, esilaki biso kotambola mingi o esobe ona mboka ya Zalayemila.

24 Mpe emonoki Balamani ete bazalaki kotambolaka ona mboka ya Zalayemila, babangaki mpenza, mbele ezalaki mwango moko mpo ya kokamba bango o bobebisami; yango wana babandaki kobombana o kati ya esobe lisusu, iyo, kutu kozonga na nzela kaka eye bayelaka.

25 Mpe tala, ezalaki butu mpe batelemisaki biema bya bango, mpo bakapiteni bakonzi ba Balamani babanzaki ete Banefi balembeki na ntina ya botamboli bwa bango; mpe kobanzaka ete babenganaka limpinga lya bango mobimba yango wana bazalaki na likanisi te etali engumba ya Mati.

26 Sikawa esalemaki ete eyaki butu, nasalaki ete bato ba ngai balala te, kasi batambola o boso na nzela esusu ona mboka ya Mati.

27 Mpe na ntina ya botamboli bwa biso o ntango ya butu, tala, o mokolo mwa nsima tozalaki epai mosika koleka Balamani, mpenza ete tokomaki liboso lya bango o engumba ya Mati.

28 Mpe boye esalemaki, ete na angele eye tokamataki engumba ya Mati na bozangi bosopi makila.

29 Mpe esalemaki ete ekomaki mampinga ma Balamani penepene na engumba, mpe emonoki bango ete tolengelemeki mpo ya kokutana na bango, bakamwaki mpenza mpe batondaki na bobangi bonene, mpenza ete bakimaki o kati ya esobe.

30 Iyo, mpe esalemaki ete mampinga ma Balamani bakimaki libanda lya eteni eye ya mboka. Kasi tala, bamemeki elongo na bango basi mpe bana mingi libanda lya mboka.

31 Mpe bingumba biye bikamatamaka na maboko ma Balamani, yango inso izali o eleko eye o bozwi bwa biso; mpe batata ba biso mpe basi ba biso mpe bana ba biso bazali kozongaka o ndako ya bango, banso longola se soko ezalaki bango baye bakamatamaka bato ba boloko mpe bamememoki mosika na Balamani.

32 Kasi tala, mampinga ma biso mazali make mpo ya kosimba bingumba bya motango moko monene mpe bozwi bonene boye.

33 Kasi tala, totiaki elikia na Nzambe wa biso oyo apesaki biso elonga likolo lya mboka ina, mpenza ete tozwaki bingumba bina mpe mboka ina, iye izalaki ya bisomei.

34 Sikawa toyebi te ntina eye boyangeli bopesi biso te makasi mingi koleka; mpe bato baye bamataki epai ya biso bayebaki te ntina nini tozwaki te makasi manene koleka.

35 Tala, toyebi te soki bozangi nkonzo, mpe bobendi mosika makasi o kati ya eteni eye ya mboka; soko boye, tozali te na mposa ya koyimayima.

36 Mpe soko ezali boye te, tala, tokobanga ezali yoko bokabwani o boyangeli, ete batindi te bato mingi koleka mpo ya lisalisi lya biso; mpo toyebi ete bazali na motango monene koleka ena eye batindi.

37 Kasi, tala, ezali likambo te—totii elikia ete Nzambe akobikisa biso, ata botau bwa mampinga ma biso, iyo, mpe akobikisa biso libanda lya maboko ma bayini ba biso.

38 Tala, eye ezali mobu mwa tuku mibale na libwa, o nsuka mpenza, mpe tozwi mboka ya biso; mpe Balamani bakimi o mboka ya Nefi.

39 Mpe bana babali bana ba bato ba Amona, baye nalobeli mingi, bazali elongo na ngai o engumba ya Mati; mpe Nkolo asalisi bango, iyo, mpe abateli bango uta o bokwei na mopanga, mpenza ete kutu moto moko te abomami.

40 Kasi tala, bazwaki mpota mingi; nzokande batelemi ngbi o lipanda lina na lwango Nzambe asali bango nsomi; mpe bazali sikisiki na komikundola Nkolo Nzambe wa bango mokolo na mokolo; iyo, batosi kobatela meko ya ye, mpe masambisi ma ye, mpe mitindo mya ye ntango inso; mpe bondimi bozali bokasi o mabikuli matali maye makoya.

41 Mpe sikawa, ndeko molingami wa ngai, Moloni, tika Nkolo Nzambe wa biso, oyo asikoli biso mpe asali biso nsomi, abatela yo ntango inso o miso mya ye; iyo, mpe tika asunga bato baye, kutu ete okoka kozwa nkonzo na kokamataka bozwi bwa inso iye Balamani bakamati uta na biso, iye izalaki mpo ya lisalisi lya biso. Mpe sikawa, tala, nakangi monkanda mwa ngai. Nazali Elamani, mwana wa Alama.