2010–2019
“Nkolo, Ezali Ngai?”
sánzá ya zómi 2014


“Nkolo, Ezali Ngai?”

Tosengeli kotia mpembeni lolendo na biso, kotala koleka lofundo na biso, mpe kosenga na komikitisa, “Nkolo, Ezali Ngai?”

Ezalaki Mobikisi na biso na butu ya nsuka na bokufi, na mpokwa yambo Amibonza lokola lisiko mpo na bato banso. Ntango Abukaki lipa elongo na bayekoli na Ye, Alobaki eloko oyo etondisamaki na mitema na bango na ngolu monene mpe mawa etondisama. “Moko kati na bino akoteka ngai,” Ayebisaki bango.

Bayekoli batunaki te bosolo na ntina ya maloba Ye alobaki. Tobatalaki nzingazinga te, koyeba soki ezali nani, mpe kotuna, “Ezali ye?”

Esika na yango, “batondisamaki na mawa koleka, mpe babandaki kotuna ye, Nkolo, ezali Ngai? 1

Namituni nini moko na moko na biso alingaki kosala soki Mobikisi atunaki biso motuna wana. Tolingaki kotala baye bazali nzinganzinga na biso mpe koloba komilobela na mitema na biso, “Azali ntango mosusu kolobela Ndeko Mobali Lasuku. Namitunaka ntango nionso na ntina na ye,” to “nasepeli Ndeko Mobali Mandiangu azali awa. Azali na mposa mpenza ya koyoka etinda oyo”? To tosengelaki, kozala lokola bayekoli ya kala, kotalaka na kati mpe kotuna motuna ya ntina: Ezali Ngai?”

Na maloba oyo ya mpasi te, “Nkolo, ezali Ngai?” ezali ebandeli ya mayele mpe nzela ya bobongwami ya moto mpe mbongwana ya ekowumela.

Lisese ya Matiti mabe

Ezalaki na moto moko azalaki kosepela kotambola na mpokwa epai ya mozalani na ye. Atalaki na mosika mpo na kotambolaka koleka ndako ya mozalani na ye. Mozalani oyo abongisaka matiti na ye ekatana malamu mpenza, bafololo ntango nionso kongenga, banzete na kolongono mpe mpio. Ezalaki solo ete mozalani asalaki bokasi nionso mpo na kozala na matiti ya kitoko.

Kasi mokolo moko ntango moto oyo azalaki kotambolaka na ndako ya mozalani na ye, amonaki na katikati ya matiti na ye ya kitoko lititi moko ya mabe ya monene, ya mai ya mosaka.

Elekelaki ye mpo esengelaki te kozala wana, Mpo na nini mozalani na ye alongolaki yango te? Amonaki yango te? Ayebi te ete matiti mabe ekokaki kokola mpe kokabola nkona eye ekoki kopesa misisa na bazomi ya matiti mabe ebele?

Matiti mabe oyo etungisaki makanisi na ye koleka mpenza, mpe alingaki kosala eloko moko na ntina na yango. Asengelaki kolongola yango? To kotia yango nkisi ebomaka matiti mabe? Ntango mosusu soki akendaki na katikati ya butu, akokaki kolongola yango na kobatama.

Makanisi oyo etikalaki na moto na ye mpenza ntango azongaki na ndako na ye mei. Akotaki na ndako na ye na kozangaka atako kotalaka liboso ya lopango na ye—oyo ezipamaki na nkoto ya bamatiti mabe ya mai ya mosaka.

Libaya mpe Mpumbu

Lisolo oyo ekundolisi biso maloba ya Mobikisi?

“Mpo na nini okotala mpumbu oyo ezali na liso ya ndeko naino okanisi libaya ezali na liso na moko te? …

“… Yo mokosi, longola liboso libaya ezali na liso na yo mpe tala, okomona polele mpo na kolongola mpumbu na liso ya ndeko na yo.”2

Lisolo oyo ya libaya mpe mpumbu ezali penepene ya kozala lolenge moko na bozangi bokasi na biso mei mpo tomimona na polele. Nandimi te mpo na nini tozali na bokasi ya komona mabe mpe kotinda nkisi mpo mabe ya bato, ntango mbala mingi tozali na mpasi komona ya biso moko.

Mwa mibu eleki ezalaki na lisolo moko ya bansango na ntina ya moto moko oyo akanisaki ete soki apakolaki mayi ya lilala na elongi na ye, bakamera ekokaki komona ye te. Na yango atiaki mayi ya lilala na elongi na ye mobimba, akendaki, mpe ayibaki na babanki mibale. Kala te bakangaki ye ntango foto na ye ebimaki na bansango ya mpokwa. Ntango bapolisi balakisaki moto oyo video na ye mei uta na bakamera ya bakengeli, andimaki te. “Kasi nazalaki na mayi ya lilala na elongi na ngai!” ayanolaki.3

Ntango moto na mayele moko na Université ya Cornell ayokaki lisolo oyo, akamwaki komona ete moto akokaki kozala na mpasi ya kozala na mayele na yemei. Mpo na koyeba soki ezalaki likambo ya mobimba, mibale ya baluki babengisaki kelasi ya likolo ya bayekoli mpo na kozala elongo na biteni ya mimekano ya miango ya lolenge na lolenge ya bomoi mpe nsima batunaki bango kotala lolenge nini basalaki yango. Bayekoli oyo bazwaki bapoint mabe bazalaki na bapoint moke mpo na kozala mbala mitano koleka oyo ya bango ezalaki. 4

Liteya oyo ezongisamaki na lolenge ebele, kopesaka lisusu mpe lisusu kaka bosukisi moko: mingi kati na biso bazali ntango ya kpokoso na kotalaka bisomei lokola tozali solo, mpe atako bato na ngenge kotalaka bokasi na bango mpe komona mpamba bokasi ya basusu.5

Ekoki kozala ntina te kotala lolenge nini tozali kokumba motuka to mosika nini tokoki kotambuisa bale ya golf. Kasi ntango tobandi kokanisa ete masungi na biso na libota, na mosala, mpe na eklezia ezali monene koleka lolenge ezali sikawa, tomibomaka miso na mapamboli mpe mabaku mpo na komatisa lolenge ya ntina mpe ya mozindo.

Bilembo ya Mokufi miso ya Molimo

Moninga na ngai abandaki kofanda na palwasi moko ezalaki na bandimi ebele mpenza na Eklezia—bato na ndakonzambe bazalaki ebele, bateyi ya libota bazalaki ebele, bana bazalaki ntango nionso na ezaleli malamu bolei na palwasi ezalaki elengi mpenza oyo bandimi bazalaki atako moke te kobuaka na nse ya ndako ya bokutani, mpe nabanzi ezalaki na bosuani te na feti ya Eklezia.

Moninga na ngai mpe mwasi na ye babengamaki nsima na misio. Ntango ntango bazongaki mibu misato nsima, bandeko oyo bakamuaki na koyokaka ete ntango bazalaki na misio, mabala 11 ekabuanaka.

Atako palwasi ezalaki na bilembo nionso libanda ya bondimi mpe bokasi, eloko moko ya kokamuisa esalemaki kati ya mitema mpe bomoi ya bandimi. Mpe eleko ya mpasi ezali ete ezalela oyo ezali se moko mpamba te. Biloko ya mobulu mpe mingi mingi ezanga ntina esalemaka ntango bandimi ya Eklezia bakomaka na bolembu na mibeko ya nsango malamu. Bakoki komonana na libanda kozala bayekoli ya Yesu Klisto, kasi kati ya mitema na bango bazali na bokabwani na Mobikisi na bango mpe mateya na Ye. Bazali komibenda malembe malembe uta na biloko ya molimo mpe bamipesi na biloko ya mokili.

Bamemi bonganganzambe oyo mbala moko balongobanaki babandi koloba na bangomei ete Eklezia ezali eloko malamu mpo na basi mpe bana kasi mpo na bango te. To boko basosoli ete miango etonda ya misala na bango to makambo na ya bango se moko elongoli na misala na bango ya mokolo na mokolo ya bomipesi mpe mosala oyo ekokaki kotika bango kozala penepene ya molimo. Na mobu oyo ya boyengeni ya yomei mpe komilinga, ezali mpasi te ya kokoma mpenza na bomilimbisa ya kopusana te penepene ya Nzambe na losambo, kolobaka ete na koyekola makomi ya Nzambe lobi, koboyaka bosangani ya Eklezia mpe likita ya mpokwa na ndako, to kofutaka te na bosolo moko na zomi to mabonza.

Bandeko na ngai mibali, ekoki bino mpenza komitala na mitema mpe komituna motuna oyo ya mpasi te: “Nkolo, ezali Ngai?”

Ebandaki yo—komona—mpamba atako moke “nsango malamu ya Nzambe apambolama, oyo esalaki epai na elikia na [bino]”? 6 opesi ndingisa na “mbinzambi nzambi ya mokili oyo” mpo na kopekisa yo koyeba “pole ya nkembo ya nsango malamu ya Klisto”?7

Baninga na ngai ya bolingo, bandeko na ngai ya mibale, bomituna, “nkita na biso ezali wapi?”

Motema na yo etiami na biloko ya malonga ya mokili oyo, to ekangami na mateya Yesu Klistoya etingia? Epai eye nkita na yo ekozala, ezali esika eye motema na yo ekozala mpe lokola.8

Molimo ya Nzambe efandi kati ya mitema na bino? Ezali bino ya “kopika misisa mpe ya kofandisama” na bolingo ya Nzambe mpe ya baninga na bino? Ezali yo kopesa ntango mpe bokeli ekoki mpo na komema esengo na libala mpe libota na bino? Opesi makoki na yo mpo na ntina koleka ya kososola mpe kozalaka na “bonene, bolai, mpe bozindo, mpe bosanda” 9ya nsango malamu ya Yesu Klisto?

Bandeko mibali, soki ezali mposa na bino monene koleka ya kolona ndenge ya moklisto ya “bondimi, mayele, boyebi, kimia, motema kokita, bosembo ya bondeko, bonzambe, bolingo, bomikitisi, [mpe mosala],”10 Tata na Lola akosala yo esaleli kati ya maboko na Ye mpo na lobiko ya milimo ebele.11

Bomoi Esosolami

Bandeko mibali, moto moko te kati na biso andimaka ntango topengwi mosika na nzela ya malamu. Mbala mingi tomekaka koboya kotala na mozindo kati ya milimo na biso mpe kotelema bolembu, bandelo, mpe bobangi na biso. Yango wana, ntango etososoli bomoi na biso, tokotala na nzela ya kiyungulu ya kimoyimi, ya komilimbisa, mpe masolo tomibeteli na ntina ya kolongisa koluka makanisi mpe misala milongobana te.

Kasi kozalaka na bokasi ya kotala bisomei na polele ezali na ntina mpenza mpo na bokoli ya molimo mpe bolamu na biso. Soki bolembu mpe mbeba na biso ebatami kaka kati na molili, nde nguya ya bosikoli ya Mobikisi ekoki te kobikisa bango mpe kolendisa bango.12 Na botioli, bokufi miso na biso epai ya bolembu ya bomoto na biso ekokomisa biso lisusu bakufi miso na makoki ya bonzambe oyo Tata na biso alingi kokolisa kati ya moko na moko na biso.

Boye lolenge nini tokoki kongenga na pole ya peto ya bosolo ya Nzambe kati ya milimo na biso mpe kotala bisomei lokola Azali kola biso?

Ekoki ngai kopesa likanisi ete makomi ma santu mpe maloba mateyami na likita linene ezali kitalatala ya makasi tokoki kosimba mpo na komisosola.

Ntango boyoki to botangi maloba ya baprofeta ya kala mpe sika, boboya kokanisa boniboni maloba ekosalisa moto mosusu mpe botuna oyo ya mpasi te: “Nkolo, ezali Ngai?”

Tosengeli kopusana penepene ya Tata na biso ya Seko na mitema mibukana mpe makanisi ya koyekola. Tosengeli kozala na bolingi ya koyekola mpe kobongola. Mpe, o, boni mingi tolonga na komipesaka kozala na bomoi Tata na biso na Lola alingi mpo na biso.

Baye bazali te kolinga koyekola mpe kobongola mingimingibakosala yango te mpe mingimingi bakobanda komituna soki Eklezia ezali na eloko ya kopesa bango.

Kasi baye balingi kobongisa mpe kokende liboso, baye bazali koyekola na Mobikisi mpe bazali na mposa ya kozala lokola Ye, baye bamikitisi bangomei lokola mwana moke mpe baluki komema makanisi mpe misala na bango na boyokani na Tata na biso na Lola—bakomona mpenza likamwa ya bomikabi ya Mobikisi. Bakoyoka mpenza Molimo ya kongenga ya Nzambe. Bakoyoka esengo ya kolimbola te oyo ezali mbuma ya motema ya bosekomi mpe komikitisa. Bakopambolama na mposa mpe bosemboli mpo na kokoma bayekoli ya solo ya Yesu Klisto.

Nguya ya Bolamu

Na bomoi na ngai, nazwi libaku ya kokutana mbala na mbala na boko mibali mpe basi ya mayele mingi koleka oyo mokili ekoki kopesa. Ntango nazalaki elenge, nakwamwisamaki na baye batanga, bakoka, balonga, mpe bakumisama na mokili. Kasi nsima ya mibu, nayaki kososola ete nakwamwisamaki mosika mingi na milimo oyo ya malamu mpe ya kopambolama baye bazali solo malamu mpe bazanga mayele mabe.

Mpe ezali te oyo nsango malamu elingi koloba mpe ezali kosala mpo na biso? Ezali nsango ya malamu, mpe ekosunga biso kokoma malamu.

Maloba ya Apostolo Yakobo etali biso lelo:

“Nzambe atelemelaka bato na lolendo, kasi apesi ngolu na bato na komikitisa.

“Mikitisa na miso ya Nkolo, mpe akotombola yo.”13

Bandeko mibali, tosengeli kotia mpembeni lolendo na biso, kotala koleka lofundo na biso, mpe kosenga na bomikitisi, “Nkolo, ezali Ngai?”

Mpe soki esalemi ete eyano ya Nkolo ezali “Iyo, mwana na ngai, ezali na makambo osengeli kobongisa, makambo nakoki kosalisa yo mpo na kolonga,” “nasambeli ete tondima eyano oyo, na bomikitisi tondima masumu na biso mpe bolembu na biso, mpe nde kobongola ndenge na biso na kokomaka mibali, batata, mpe bana mibali ya malamu mingi koleka. Ekoka biso uta ngonga oyo koluka na bokasi na biso nionso na kotambola na molende na lolenge ya Mobikisi apambolama —mpo momimonaka na polele ezali ebandeli ya mayele.

Ntango tosali bongo, Nzambe na biso ya bofuluki akokamba biso na loboko, tokokoma “makasi, mpe kopambolama uta likolo.”14

Baninga na ngai ya bolingo, litambi ya yambo na nzela oyo ya kitoko mpe kofulukisa ya bayekoli ya solo ebandi na botuni na biso motuna oyo ya mpasi te:

“Nkolo,ezali Ngai?”

Ya yango natatoli mpe natikeli bino lipamboli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 26:21–22; sete ebetami.

  2. Matai 7:3, 5.

  3. Tala Errol Morris, “The Anosognosic’s Dilemma: Something’s Wrong but You’ll Never Know What It Is,” New York Times, sanza ya Motoba 20, 2010; opinionator.blogs.nytimes.com/2010/06/20/the-anosognosics-dilemma-1.

  4. Tala Justin Kruger mpe David Dunning, “Unskilled mpe Unaware of It: How Difficulties in Recognizing One’s Own Incompetence Lead to Inflated Self-Assessments,” Zulunale ya bomoto mpe Pisikoloji ya lisanga ya bato, sanza ya Zomi na mibale. 1999, 1121–34. “Na nzela ya mayekoli 4, bakomi bamonaki ete bilembo ya bato na nsuka ezalaki misato na minei na mimekano ya boseki, gramatika, mpe lojik mingimingi bapesaki emekile ya motuya mingi koleka na momekano ya misalo mpe bokoki na bangomei. Atako bailembo ya momekano etii bango na molongo ya 12 na monkama, bamipesaki motuya ya mbala ya 62 (uta makomi na psycnet.apa.org/?&fa=main.doiLanding&doi=10.1037/0022–3514.77.6.1121).

  5. Tala Marshall Goldsmith, What Got You Here Won’t Get You There (2007), mokapo 3. Moluki atunaki baninga misato kopesa motuya na misala na bangomei na elonga ya kompani. Bomeki ya misala na bangomei ebakisaki 150 na monkama.

  6. 1 Timote 1:11.

  7. 2 Bakolinti 4:4.

  8. Luka 12:34.

  9. Baefeso 3:18.

  10. Doctrine and Covenants 4:6.

  11. Tala Alma 17:11.

  12. Tala Etele12:27.

  13. Yakobo 4:6, 10.

  14. Doctrine et Alliances 1:28.