2010–2019
Bokambamaki na Mabota na Bokebi
sánzá ya zómi 2014


Bokambamaki na Mabota na Bokebi

Tozali kozela lolenge ya nzela ya Lola ya solo, oyo tokoki komilengela mpe kolanda na lolenge ya mayale mpe ya malamu.

Bandeko mibali, tosangani lokola na nzoto moko ya nguya ya bonganganzambe, banso awa na kati ya Ndako ya Makita mpe na bisika mosusu ya mokili. Napesameli lokumu solo nakomikitisa na mokumba oyo ezali ya ngai ya kopesa mateya moke epai na bino. Nabondeli ete molimo na Nkolo esimba ngai ntango nazali koloba.

Mibu ntuku nsambo na mitano eleki, na sanza ya Mibale  14, 1939, na Hamburg, Allemagne, mokolo feti ya leta ezali kosalema. Na katikati ya masukulu ya kafukafu, mpe ebele ya bato na esengo, mpe koyembaka ba nzembo ya lokumu ya mboka, “masuwa ya sika ya bitumba Bismarcketiamaki na mbu mpo na konana na [Ebale] ya Elbe.” Oyo, ezalaki moko masuwa ya nguya ya nyonso. Ezalaki eloko ya kokamuisa na bibundeli mpe masini. Kosala yango esengaki mabongisi 57 000 mpo na 380 milimetele, mitunga mibale ya minduki mpo na komona mosika etalisami. Masuwa esangisaki (45000 km) ya ba nsinga ya balotiliki. batone 35.000 ya mabende ya makasi mpo na bokebi makasi. Kitoko na komona, molayi mpenza, kokamuisa na nguya ya moto, masuwa ya nguya emonanaki lokola ekoki kodinda te.

Masuwa ya Bismarck ebimaki mibu mibale sima, na sanza ya Mitano 24, 1941, masuwa mibale ya bitumba ya nguya koleka ya British Navy, Prince ya Galles mpe Hoot, bakotaki na bitumba Bismarckmpe masuwa ya ba Alleman Prinz Eugen. miniti mitano Bismarck ezindaki na mai na bozindo ya Antlantique Hood mpe nyonso kasi mibali misatu ya bato ya masuwa ya 1,400. Masuwa mususu ya bitumba ya British, Prince de Gaules, enyokwamaki na bobebi makasi mpe ekimaki.

Na sima ya mikolo misatu elandi, masuwa ya Bismarckezongaki lisusu, mpe lisusu na Masuwa minei ya bitumba ya British mpe mpepo. Na nyonso, British asangisaki bokasi ya masuwa ya bitumba mitano, bimemeli mpepo mibale, masuwa mike11, mpe bipanzeli 21 na ntina ya komona mpe kozindisa Bismarck. ya nguya.

Na ntango ya bitumba oyo, biteni na biteni ebibisamaki mpenza mpenza te likolo ya Bismarck. ekokaki kozinda lisusu te ata mbongo? Na sima mpasi mpenza, oyo ekangaki botamboli ya Bismarck. Bokasi ya kobongisa ezalaki mpamba. Na minduki etiami mpe bato ya masuwa babongisami, Bismarck “ekokaki kotambola kaka na malembe. Kaka liboso ya kokoma ezalaki na basoda ya likolo ya nguya ya Allemagne.   Bismarck ekokaki lisusu te kotambola na bokebi kino na libongo. To kosala makasi oyo esengelaki Bismarck ebungisaki bokasi ya kokoba nzela na yango. Bokambami te, lisungi te, libongo te. Nsuka ekomaki pembeni. Minduki ya ba Anglais ezalaki kongala ntango bato na masuwa bazalaki kotobola masuwa na nse mpe kozindisa na mbala moko masuwa emonanaki lokola ebebaka te. Bambonge minene ya Atlantique yambo elekaki ba pembeni mpe boye emelaki lofundu ya mampinga ya mayi ya Allemagne. Bismarcklisusu te. 1

Lokola Bismarck, moko na moko kati na biso azali likamuisi ya mayele. Bokeli na biso, esuki kaka te na mayele ya moto. Moko akoki kosala bamasini ya minene, kasi akoki te kopesa yango bomoi to kotia likolo na yango nguya ya ntina ya bosambisi. Yango ezali makabo ya bonzambe, epesami kaka na Nzambe.

Lokola etambolisi ya motuya ya masuwa,bandeko mibali, topesameli nzela ya kobongisa nzela ya kotambola. Muinda ya Nkolo ezali kobenga banso lokola tozali kosema na mayi ya bomoi. Ntina na biso ezali kotambuisa nzela ekoki kobukana te na mabongisi na biso—atako bokonzi ya Nzambe tozali na mposa. Moto oyo azangi mabongisi azali lokola masuwa ezangi etambuiseli, mabaku malamu ata moke mpo na kokoma na libongo ya bokangi. Mpo na biso bopesi nzela eye: bobongisa ba nzela na bino, bokanga voile na bino, lolenge ya etambuiseli, mpe bokoba.

Lokola Bismarck, ya nguya ndenge moko ezali na moto. Bopusi ya ba turbines mpe nguya ya pakapaka ezali na ntina libanda ya lolenge ya nzela, oyo esimbeli ya bokasi, oyo etambuisi ya nguya epesami na etambolisi, ebombani na bomoni, ezali kaka moke na lolenge, kasi na motuya monene na etambuiseli.

Tata na biso apesi moyi, sanza, mpe minzoto—ba mioto ya likolo koleka kotambolisa bato na masuwa kosema na nzela ya ebale. Na biso, lokola tozali kotambola na nzela ya bomoi, Ye abongiseli kalati moko mpe alakisi liboso nzela ya oyo ya bosenga na biso. Ye akebisi: bokeba banzela, mitambo, mitambo. Tokoki kokosama te na baoyo balingi kopenguisa biso, bato ya mayele mabe ya masumu batelemi awa to kuna. Na esika totelemi kosambela; toyoki kaka mongongo ya moke oyo ekoloba na nse ya milimo na biso libiangi ya kitoko ya Molakisi, “Yaka, landa ngai.”2

Nzoka nde ezali na baoyo bazali koyoka te, baoyo balingi kotosa te, baoyo baponi kotambola na nzela oyo bango moko basali. Mingi mingi bango bakokueya na masenginia oyo ezingi moko moko na biso mpe oyo ekoki komonana kitoko koleka.

Lokola basimbi bonganganzambe, totiamaki na mabele na ntango oyo ya koningana. Tozali kobika na mokili ya makambo ebele na kobendana ya makambo emonani esika nyonso. Mambi ya politiki ekobebisa kimia ya bikolo, makambo esimbami mpo na mpifo, mpe ba ndambo ya bato bazali ntango nionso koniokuama, bazangi libaku, mpe batikali na boyoki moko ya kokueya. Bakokangama ya bato ekolela na matoyi na biso, mpe lisumu ezingi biso.

Oyo ya biso ezali kozala kolongobana na mapamboli nyonso ya lokumu ya Tata na biso ya Lola abombi mpo na biso.bisika nyonso tokokende bonganganzambe na biso ekokende na biso. Etelemi biso na bisika bisantu? Nasengi, yango omitia mpe otia bonganganzambe na yo na likama nakokendaka na bisika to kosanganaka na misala oyo elongobani te na yo to na ki bonganganzambe wana, telema mpe tala bambano.

Biso oyo tobengami na bonganganzambe ya Nzambe tokoki kosala bokeseni moko. Ntango tobateli bompeto na bisomoko mpe tokumisi bonganganzambe na biso, tokomi ba ndakisa ya bosolo mpo na basusu kolanda. Ntoma Polo atetayaka, “Tika ete moto atiola bolenge na yo kasi opesa bandimi etaliseli na elobeli mpe ejaleli mpe na bolingo mpe na kondima mpe na mpeto.”3 Akomaki lisusu ete balandi ya Klisto basengeli bazala “lokola minda ya mokili.”4 kolakisaka ndakisa ya sembo ekoki kosunga na kongengisaka mokili oyo ezali molili koleka.

Ebele kati na biso bakokundola Mokambi N. Eldon Tanner, oyo asalaki lokola mopesi toli na Bakambi minei ya Eklezia. Alakisaki ndakisa ya bosembo na nzela ya mosala na ye mobimba na kompani, na mosala na kati ya leta ya Canada, mpe lokola apostolo ya Yesu Klisto. Apesaka toli oyo efulami: “Eloko moko te ekomema esengo mpe nkonzo koleka kozala kolandisamaka na mateya ya nsango malamu. Zala ndakisa moko; zala komona ya malamu”

Akobaki: “Moko na moko kati na biso abongisamaki mpo na misala songolo lokola mosali aponami na [Nzambe] na oyo ye amoni malamu ya kopesa bonganganzambe mpe nguya ya kosala na nkombo na ye. Ntango nyonso kundola ete bato bazali kotala yo mpo na bokambi mpe ozali kobendaka bomoi ya bato na malamu to na mabe, bobendi oyo okoyokana na bikeke ekoya.”5

Topesami makasi na bosolo ete makasi monene na mokili ya lelo ezali nguya ya Nzambe oyo ezali kosala na kati ya moto. Konana na bobangi te na bibale ya bokufi, tosengeli totambuisama na Mokumbi masuwa ya libela—kutu ya monene Yehova. Totandi loboko, tokomi tii, mpo na kozua lisungi ya lola.

Ndakisa moko eyebani ya moko oyo akomaki likolo te ezali oyo ya Kaina, muana ya Adama mpe Ewa. Nguya makoki kasi mpete na bolingi, Kaina apesi nzela na lokoso, mposa, bozangi botosi, mpe kutu koboma kokanga oyo etamboliseli na yemoko oyo ekokaki kosunga ye na bobangi te mpe bonetolami. Botali na nse ezuaki esika ya botali likolo; Kaina akueyaki.

Na ntango mosusu mpe na mokonzi ya nkanda, mosali moko ya Nzambe amekamaki. Asungamaki na bofuli ya lola, Daniel, alimbolaki mpo na mokonzi makomi likolo ya efelo. Na oyo etali bopesi babotondi—kutu elamba ya bokonzi, pauni ya kingo, mpe nguya ya politiki—Daniele alobaki, “Tika makabo na yo majala na yo mpenja, mpe pesa mabonza na yo na moto mosusu.”6 Bozui monene mpe nguya epesamaki na Danyele, mabonza ekolakisaka biloko ya mokili mpe ya Nzambe te. Danyele atelemaki ngui mpe atikalaki botongono.

Sima, ntango Danyele akumisaki Nzambe atako mobeko moko koloba ete epekisami, abuakamaki na libulu ya bankosi. Lisolo ya biblia eyebisi biso ete na ntongo elandi, “Danyele abimisamaki na libulu mpe mpota soko lolenge nini ejuamaki na ye te mpo ete andimaki  … Nzambe.”7 na ye. Na ntango ya bosenga koleka, bompikiliki ya Danyele ezalaki likolo kopesa kobatelama ya bonzambe mpe apesaki esika ya bobangi te. Bobatelami oyo mpe bobangi te ekoki kozala ya biso, tokoki kotalisa bokeyi na biso kotalaka ndako ya libela.

Montre monene ya lisituale, lokola zelo ya ebombelo zelo, ekolakisa koleka ya ntango. Ekipi ya sika ezali kotala kotambola ya bomoi. Makambo ya mikolo na biso oyo ezali koleka liboso na biso ezali kobangisa biso. Na molongo ya lisituale ya mokili, satana azali kosala na kolemba te mpo na kobebisa bayekoli ya Nkolo. Soki tokueyi na mabanzo na ye, biso—lokola nguya ya Bismarck—tokobungisa etambuiseli oyo ekoki kotambuisa biso na bobangi te. Na esika ya, kobalukaka na bomoi ya lelo ya biloko kitoko, tozali kotala lola mpo na lolenge na yango ya kolakisa nzela ebeba te, ete tokoka kokata mpe kolanda nzela ya mayele mpe ya kitoko. Tata na biso ya Lola akotika te bosenga na biso ya solo ezanga eyano. Lokola tozali koluka lisungi ya lola, etamboliseli na biso, kokokana te na oyo ya Bismarck,ekokueya te.

Lokola tozali kokende liboso ya mibembo na biso moko, tika tonana na bobangi te na ebale ya bomoi. Tozali na bopikiliki ya Danyele, ete tosengeli kotikala nsembo mpe na botongono atako lisumu mpe komekama ezingi biso, tika matatoli na biso ezala bozindo mpe makasi lokola ya Yakobo, ndeko mobali ya Nefi, oyo, ntango bakutanaki na moto oyo alukaki na lolenge nyonso abebisa bondimi na ye, alobaki “Nakokaki kokueyisama te.”8

Na etambuiseli ya bondimi kotambuisaka boleki na biso, bandeko mibali, biso mpe tokomona nzela ya bobangi te ya ndako—ndako ya Nzambe, kovanda na Ye libela. Tika oyo ezala bongo mpo na moko na moko na biso, nabondeli na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, amene.