2010–2019
Kokabola Pole na Yo
sánzá ya zómi 2014


Kokabola Pole na Yo

Tosengeli kotelema ngwi na bondimi na biso mpe kotombola mingongo na biso mpo na kosakola malongi ya solo.

Na mpokwa ya lelo nalingi kolobela mikumba ya ntina mibale tomemaka. Yambo, kotandolaka ntango nionso pole mpe bosolo ya nsango malamu na bomoi na biso, kokabolaka pole mpe bosolo wana na basusu.

Boyebi ya motuya nini bozali? Moko na moko na bino—sikoyo mpenza—azali na motuya mpe ntina na mwango ya lobiko ya Tata ya Lola. Tozali na mosala ya kosala. Toyebi bosolo ya nsango malamu ezongisami. Tolengelami mpo na kobatela bosolo wana? Tosengeli kosalela yango; tosengeli kokabola yango. Tosengeli kotelema ngwi na bondimi na biso mpe kotombola mingongo na biso mpo kosakola malongi ya solo.

Na Ensignmpe Liahona ya sanza ya libwa 2014 Mpaka M. Russell Ballard akomaki ete: “Tozali na mposa ya mingongo ya lokumu, ya nguya mpe bondimi ya basi. Tozali na mposa na yango mpo na kososola maye tondimeli mpo ete bakoka kopesa matatoli na bango oyo etali bosolo ya makambo manso.”1

Bandeko basi, bolendisaka bondimi na ngai kati na Yesu Klisto. Natali bandakisa na bino, nayoki matatoli na bino, mpe nayoki bondimi na bino uta Brésil ti Botswana! Bomemi molongo ya bato elongo na bino epai nionso bozali. Eyokisami na bato nzinganzinga na bino—uta na libota na bino ti na bacontacts kati na batelefoni na bino mpe baninga na bino ya kokomana na internet ti na baye bafandi mpembeni na bino na mpokwa ya lelo. Nandimeli Ndeko mwasi Harriet Uchtdorf, oyo akomaki ete, “Bino … bozali mwinda ya makasi mpe ya esengo na mokili oyo ezali kokoba kokoma molili lokola ezali bino kolakisa, na lolenge bozali na bomoi na bino, ete nsango malamu ezali nsango ya esengo.”2

Mokambi Thomas S. Monson alobaki ete, “Soki olingi kopesa pole na basusu, esengeli omingengisa.”3 Lolenge nini tokoki kobatela pole wana ya bosolo kongengaka kati na biso? Ntango mosusu nayokaka lokola mwinda ya lotiliki ya makasi te. Lolenge nini tongengelaka koleka?

Makomi mateyi, “Oyo ezali ya Nzambe ezali pole; mpe oyo azwi pole, mpe akobi kati na Nzambe, azwi pole mingi koleka.”4 Tosengeli kokoba kati na Nzambe lokola elobi makomi. Tosengeli kokende na liziba ya pole—epai ya Tata ya Lola mpe Yesu Klisto mpe makomi. Tokoki lisusu kokende na tempelo, koyebaka ete makambo manso kati na baefelo na yango ezali kotalisa Klisto mpe libonza ya komikaba na Ye monene.

Kanisa na likambo batempelo esalaka na nzinganzinga na yango. Ekomisaka kitoko kati ya bingumba; engengaka uta mwa bangomba mike ya milai. Mpo na nini ekomisaka kitoko mpe engengaka? Mpamba te, lokola elobi makomi, “Bosolo engengaka,”5 mpe batempelo ezali na bosolo mpe ntina ya seko; bino bozali na yango lokola.

Na 1877, Mokambi George Q. Cannon alobaki, “Temple nionso … ekitisaka nguya ya Satana na mabele.” 6 Nandimi ete bisika nionso wapi tempelo etongami na mabele, ekozongisa molili nsima. Ntina ya tempelo ezali kosalisa moto mpe kopesa na bana banso ya Tata ya Lola likoki ya kozonga mpe kofanda elongo na Ye. Ntina na biso ekokani te na oyo ya bitonga ebulisama oyo, bandako ya Nkolo oyo? Kosalisa basusu mpe kosunga bango bazongisa molili nsima mpe kozonga epai ya pole ya Tata ya Lola?

Mosala ya tempelo ya bule ekobakisa bondimi na biso na Klisto, mpe nde tokoki kozala na nguya malamu koleka na bondimi ya basusu. Na molimo ya koleisa ya tempelo, tokoki koyekola bozali solo, nguya, mpe elikia ya Bomikabi ya Mobikisi kati na bomoi na biso moko.

Mwa mibu mileki libota na biso ekutanaki na mokakatano makasi. Nakendaki na tempelo mpe kuna nasambelaki makasi mpo na lisungi. Napesamaki ngonga moko ya bosolo. Nazwaki likanisi moko ya polele ya botau na ngai, mpe natukamaki. Na ngonga wana ya kozwa malako ya molimo, namonaki mwasi moko ya lolendo kosalaka makambo na lolenge na yemei, mpenza te na lolenge ya Nkolo, mpe na ye moko komipesaka mpo na oyo nakanisaki elonga. Nayebaki ete nazalaki komitala. Nalelaki na motema epai ya Tata ya Lola mpe alobaki “Nalingi kozala mwasi wana te, kasi lolenge nini nakoki kobongwana?”

Na nzela ya molimo ya bobimisi ya petwa na tempelo, nateyamaki na ntina ya mposa na ngai ya makasi mpo ma Mosikoli. Nabalukaki na mbala moko epai ya Mobikisi Yesu Klisto na makanisi na ngai mpe nayokaki mawa na ngai kolimwa mpe elikia monene kotonda na motema na ngai. Azali elikia se moko na ngai, mpe nayokaki mposa ya kokangama na Ye. Ezalaki polele na ngai ete mwasi moko ya komilinga mpe ya mokili “azali monguna ya Nzambe”7 mpe ya bato kati na nguya na ye. Kati na tempelo mokolo wana nayekolaki ete ezalaki bobele na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto nde ezaleli na nga ya lolendo ekokaki kobongwana mpe ete nazalaki na likoki ya kosala malamu. Nayokaki bolingo na Ye makasi, mpe nayebaki ete Ye alingaki koteya ngai na Molimo mpe kobongola ngai soki napesaki motema na ngai epai na Ye, kobombaka eloko te.

Nazali naino kobundisa botau na ngai, kasi nalikii na lisalisi ya bonzambe ya Bomikabi. Malako ya petwa oyo mayaki mpo ete nakotaki na tempelo esantu, kolukaka libondi mpe biyano. Nakotaki na tempelo na mikumba, mpe nabimaki koyebaka ete nazalaki na Mobikisi ya nguya nionso mpe ya bolingi nionso. Nazalaki pepele mpe na esengo mpo ete nazwaki pole na Ye mpe nandimaki mwango na Ye mpo na ngai.

Kotiamaka nzinganzinga ya mokili, batempelo ezali na lolenge mpe boyemi na libanda se moko ya yangomei, kasi na kati ezali nionso na pole ya seko, ntina mpe bosolo se moko. Na 1 Bakolinti 3:16 totangi ete, “Mpe boyebi ete bozali tempelo ya Nzambe mpe ete Molimo na Nzambe afandi kati na bino?” Biso mpe lokola bana basi ya Nzambe totiami banso nzinganzinga ya mokili, lokola batempelo, mpe moko na moko na biso azali na lolenge mpe boyemi ya libanda se moko ya yemei, lokola batempelo. Tozali lisusu na pole ya molimo kati na biso, lokola batempelo. Pole ya molimo oyo ezali kolakisa pole ya Mobikisi. Basusu bakobendama na bongengi oyo.

Tozali na mosala na bisomei na mabele—uta na mwana mwasi, mama, mokambi, mpe moteyi ti ndeko mwasi, mosali mosolo, mwasi ya libala, mpe mingi koleka. Moko na moko azali ya nguya. Mokumba moko na moko ezali na nguya ya bomoto wana ezali biso kotalisa babosolo ya nsango malamu mpe makuli ya nsango malamu na bomoi na biso.

Mpaka D. Todd Christofferson alobaki, “Na makambo nionso, mama akoki kozala na nguya moko ekokani te na moto mosusu kati na bozalani mosusu.”8

Ntango bana ba biso bazalaki bilenge, namiyokaki lokola mosungi kapiteni, elongo na mobali na ngai, David, ya masuwa, mpe nazalaki kozwa bana na biso 11 lokola liboke ya masuwa mike konanaka nzinganga na biso na libongo, komilengelaka mpo na kokende na mbu ya mokili. David mpe ngai toyokaki mposa ya kotala likonga ya Nkolo kolakisaka nordi mokolo na mokolo mpo na koyemba nzela malamu ya konana elongo na masuwa na biso ya moke.

Mikolo na ngai etondaki na makambo ya kobosana te lokola kongumba bilamba, kotanga babuku ya bana, kosangisaka banzungu elongo mpo na elambo monene. Ntango mosusu na libongo ya bandako na biso, tokoki komona te yango na nzela oyo ya misala ya pete—ya sikisiki, kotiaka na kati losambo ya libota, boyekoli makomi, mpe likita ya mpokwa na libota—makambo manene mazali kosalema. Kasi natatoli ete misala oyo mpenza ezali na ntina ya seko. Esengo monene eyaka ntango mwa bamasuwa wana—bana na biso—bakoli mpo na kokoma bato ya masuwa ya nguya batonda na pole ya nsango malamu mpe babelemi mpo na “kokpelisa na mosala ya Nzambe.”9 Mwa misala ya bondimi mpe lisalisi na biso ezali lolenge nini mingi na biso tokoki kokoba kati na Nzambe mpe na nsuka komema pole mpe nkembo ya seko na libota na biso, baninga na biso, mpe bato na biso ya lingomba. Bokomema solo eboke ya bato elongo na bino!

Bokanisa na nguya oyo bondimi ya mwana mwasi ya mobu ya eteyelo ya bana akoki kozala na yango na libota na ye. Bondimi ya mwana na biso ya mwasi epambolaki libota na biso ntango tobungisaki mwana na biso ya mobali ya elenge na libanda ya masano. Libota ekendeki mbangu nzinganzinga na bobangi koluka ye. Na nsuka, mwana na biso ya mwasi ya mibu zomi abetaki loboko na ngai mpe alobaki, “Mama, esengeli te tosambela?” Alobaki solo! Libota esanganaki elongo na katikati ya etuluku ya batali mpe tosambelaki mpo na komona mwana na biso. Tomonaki ye. Na bana basi banso ya Eteyelo ya Bana nalobi, “Nasengi bokoba kokundola na baboti na bino mpo na kosambela!”

Eleko ya elanga ya moi oyo nazwaki libaku ya kokenda na esika ya nganda ya bilenge basi 900 na Alaska. Nguya na bango likolo na ngai ezalaki ya mozindo. Bayaki na nganda ya komilengela na molimo, kosilaka kotanga Buku ya Mormon mpe kokangaka na motema “The Living Christ: The Testimony of the Apostles.” Na butu ya misato ya nganda, bilenge basi 900 nionso batelemaki elongo mpe batangaki na mongongo makasi mokanda mobimba liloba moko moko.

Molimo etondaki na ndako monene, nayoki mposa ya kosangana na bango. Kasi nakokaki te. Nafutaka ntalo ya bokangi na moto te.

Nabandaki sikawa koyekola maloba ya “Klisto na Bomoi” lokola esalaki bandeko basi oyo, mpe na ntina ya nguya na bango nayokaki mobimba koleka liyokani ya elambo ya komikundola ntango nionso Mobikisi lokola nazali kozongela mbala na mbala litatoli Klisto ya Bapostolo. Elambo ezali kozwa ndimbola ya mozindo mpo na ngai.

Elikia na gai ezali kopesa Mobikisi likabo ya Mbotama mobu oyo ya kokotisaka na moto mpe kosimbaka na motema na ngai “Klisto na Bomoi” na basanza ya zomi na mibale 25. Nalikii ete nakoki kozala nguya moko mpo na malamu—lokola bandeko basi ya Alaska bazalaki mpo na ngai.

Ekoki bino komimona kati ya maloba oyo elandi ya mokanda oyo, “Klisto na Bomoi”? “Abondelaki banso balanda ndakisa na Ye. Atambolaki na banzela ya Palestini, kobikisaka babeli, kosalaka bakufi miso bamona, mpe kosekwisaka bakufi.”10

Biso, bandeko basi ya Eklezia, totambolaka banzela ya Palestini te kobikisaka babeli, kasi tokoki kosambelela mpe kosalela bolingo ya kobikisa ya Bomikabi epai ya mozalani moko ya maladi, ya komitungisa.

Atako tokosala te ete bakufi miso bamona na lolenge ya Mobikisi, tokoki kotatola mwango ya lobiko epai bakufi miso ya molimo. Tokoki kofungola miso ya bososoli na bango mpo na ntina ya nguya ya bonganganzambe kati na mayokani ya seko.

Tokozala kolamusa bakufi te lokola Mobikisi, kasi tokoki kopambola bakufi na komonaka bankombo na bango mpo na mosala ya tempelo. Nde solo tokosekwisa bango uta na boloko na bango mpe kopesa bango nzela ya bomoi ya seko.

Natatoli ete tozali na Mobikisi ya bomoi, Yesu Klisto, mpe na nguya mpe pole na Ye tokokoka kopusa nsima molili ya mokili, kopesa mongongo na bosolo oyo toyebi, mpe kotindika basusu baya liboso na Ye. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. M. Russell Ballard, “Men and Women and Priesthood Power,” Ensign, sanza ya libwa 2014, 32;Liahona, sanza ya libwa 2014, 36.

  2. Harriet R. Uchtdorf, The Light We Share (Deseret Book Company, 2014), 4.

  3. Thomas S. Monson, “For I Was Blind, but Now I See,” Ensign, sanza ya mitano 1999, 56;Liahona, sanza ya nsambo 1999, 69.

  4. Doctrine et Alliances 50:24.

  5. Doctrine et Alliances 88:7.

  6. George Q. Cannon, in Preparing to Enter the Holy Temple (booklet, 2002), 36.

  7. Moziya 3:19.

  8. D. Todd Christofferson, “The Moral Force of Women,” Ensign toLiahona, sanza ya zomi na moko 2013, 30.

  9. Doctrine et Alliances 4:2.

  10. “The Living Christ: The Testimony of the Apostles,” Ensign toLiahona, sanza ya minei 2000, 2.