2010–2019
Bonganganzambe ya bolengeli
sánzá ya zómi 2014


Bonganganzambe ya bolengeli

Na bolengeli ya bonganganzambe “lakisa ngai” eleki mingi “yebisa ngai.”

Natondi botondi mpo na kosangana elongo na banganganzambe ya Nzambe, oyo epanzani na mokili mobimba. Naluli bondimi na bino, mosala na bino, mpe nsambo na bino.

Na etinda na ngai mpokwa ya lelo ezali Bonganganzambe. Ezali lisusu mpo na biso banso oyo tozali kosalisa na kokokisa bilaka ya Nkolo mpo nab aye bamemi oyo elimbolami na makomi lokola “bonganganzambe ya moke.”1 Ebengami lisusu Bonganganzambe ya bolengeli. Ezali bolengeli wana ya nkembo nde nakolobela mpokwa ya lelo.

Mwango ya Nkolo mpo na mosala na Ye etondi na bolengeli. Ye azali kolengela mabele mpo na kosala mimekano mpe mabaku ya bokufi. Ntango tozali awa, tozali na nini makomi ebengi “ezaleli ya bolengeli.”2

Profeta Alma alimbolaki motuya ya ntina ya bolengeli wana mpo na bomoi ya seko, wapi esika tokoki kofanda libela na mabota elongo na Nzambe Tata mpe Yesu Klisto.

Alimboli ntina ya bolengeli lolenge oyo: “Mpe tomoni ete liwa wana eyaki likolo ya bato, iyo, liwa oyo elobami na Amulek, oyo ezali liwa ya ntango; nzokande ezalaki na esika epesami na moto na yango akokaki koyambola; yango wana bomoi oyo ekomaki ezaleli ya bolengeli; ntango moko mpo na komilengela mpo na kokutana na Nzambe; ntango moko mpo na komilengela mpo ezaleli wana ezanga nsuka oyo elobelamaki na biso, oyo ezali nsima ya bosekwi ya bawa.”3

Kaka lokola ntango epesameli biso mpo na kowumela na bokufi ezali mpo na komilengela mpo na kokutana na Nzambe, ntango epesameli biso mpo na kosala na Bonganganzambe ya Alona ezali libaku mpo na komilengela mpo na koyekola boniboni kopesa lisalisi ya ntinna mpo na kosalisa basusu. Kaka lokola Nkolo akopesi tosengeli mpo na kolonga mimekano ya bomoi ya bokufi.

Etinda na ngai ezali na baye Nkolo atindi mpo na kolengela basimbi Bonganganzambe ya Alona mingi lokola esengeli baye basimbi Bonganganzambe ya Alona. Nakoloba na batata. Nakoloba na baepisikopo. Mpe nakoloba na baye ya Bonganganzambe ya Melekisedeki oyo bandimami mpo na kozala baninga mpe bateyi ya bilenge mibali oyo bazali na bonganganzambe ya bolengeli.

Nakoloba na bosanzoli mpe botondi mpo na mingi na bino na mokili mobimba mpe na ntango nionso.

Nakosepela te soki nalobeli te mokambi moko ya etape mpe episikopo moko na bolenge na ngai. Nakomaki diakona na mibu 12 na mwa etape moko na eteni ya esiti ya Etazini. Etape yango ezalaki moke boye ete ndeko na ngai ya mobali ya nkulutu mpe ngai tozalaki mokumbi Banganganzambe ya Alona kino tata na ngai, oyo azalaki mokambi ya etape, abengisaki moto moko ya mibu ya katikati mpo na kosangana Eklezia.

Mobongwani wana ya sika azwaki Bonganganzambe ya Alona mpe, elongo na yango, libiangi mpo na kokengela Banganganzambe ya Alona. Namikundoli lisusu lokola soki ezalaki lobi eleki: nakoki komikundola bokwei ya kitoko ya bankasa ntango mobongwani wana akendeki elongo na ndeko na ngai ya mobali mpe ngai mpo na kosala likambo moko mpo na mwasi moko akufela mobali. Namikundoli te mwango nini yango ezalaki, kasi namikundoli koyokaka ete nguya ya bonganganzambe esanganaki na kosalaka nini nsima nayebaki Nkolo alobaka tosengelaki banso kosala mpo masumu na biso elimbisama mpe boye komilengela mpo na komona Ye.

Soki natali nsima sikawa, nayoki botondi mpo na mokambi ya etape moko oyo abengaki mobongwani moko ya sika mpo na kosalisa Nkolo kolengelaka bana mibali mibale oyo balingaki bango lokola moko moko kozala baepisikopo na mokumba ya kosalisa babola mpe bazanga mpe lisusu koyangela bonganganzambe ya bolengeli.

Nazalaki naino diakona ntango libota na ngai elongwaki na paloasi moko ya monene na Utah. Ezalaki mbala ya liboso nayokaka nguya ya litondo lisanga likoki na Bonganganzambe ya Alona. Ya solo, ezalaki mbali ya yambo namonaki moko. Mpe nsima ezalaki mbala ya liboso nayokaki nguya mpe lipamboli ya episikopo koyangelaka na lisanga likoki moko ya banganganzambe.

Episikopo ebengaki ngai mpo na kozala mosungi na ye ya yambo na lisanga likoki ya banganganzambe. Namikundoli ete ateyaki lisanga likoki yemei—na mosala ebele lokola azalaki na yango elongo na mosusu ya makabo oyo akokaka kobianga mpo na koteya biso. Asalaka bakiti ebongisama na zunguluke moko. Atiaki ngai navanda mpembeni na ye na loboko ya mobali.

Nakokaki kotala likolo ya lipeka na ye ntango azalaki koteya. Azalaki kotala na nse ntango mosusu na bankoma ebetama na ntoki na simisi moko ya mposo na libolongo na libolongo moko mpe makomi elongwa mposo mpe ekomama afungolaki na libolongo mosusu. Nakoki komikundola nsai alobaki lisusu bansango ya mpiko uta na buku ya Daniele mpe litatoli na ye ya Mobikisi, Nkolo Yesu Klisto.

Nakomikundola ntango ninso boniboni Nkolo abiangi baninga baponami na ntoki mpo na bamemi ya bonganganzambe na ye ya bolengeli.

Episikopo na biso azalaki na basungi ya nguya, mpe mpo na bantina nasosolaki te ntango, mbala mingi koleka mbala moko abengaki ngai na telefone na ndako mpe alobaki, “Hal, nazali na mposa na yo mpo na kokende elongo na ngai lokola moninga mpo na kotala bandeko.” Mbala moko, ezalaki mpo na komema ngai elongo na ye na ndako ya mokufeli mobali moko afandaki ye moko kaka mpe na kozanga ata bilei na ndako. Na nzela ya ndako, atelemisaki motuka na ye, afungulaki makomi na ye moko, mpe alobelaki ngai ntina oyo asalelaki mokufeli mobali ezalaki lokola soki azalaki kaka te na nguya ya komisalisa kasi akokaki na ntango ekoya, kozala na makoki ya kosalisa basusu.

Mbala mosusu oyo akendaki kotala bato ezalaki na moto moko oyo atika Eklezia uta kala. Episikopo na biso abengisaki ye azongela Basantu. Nayokaki bolingo ya episikopo na ngai mpo na moto oyo, oyo epai na ngai amonanaki kozala monguna oyo moto akoki kolinga te mpe motomboki.

Na libaku mosusu totalaki ndako moko esika bana basi misato ya mike ya basi batindaki bango mpo na kokutana na biso na ekuke na baboti bato ya milangwa na lotoko. Bana wana ya mike ya basi balobaki na lidusu ya ekuke ete mama mpe tata na bango bazalaki kolala. Episikopo akobaki kosolola na bango, kosekaka mpe kokumisaka bolamu na bango mpe kielombe na bango, mpo oyo namonaki lokola miniti 10 to mingi ya kobakisa. Lokola nazalaki kotambola koleka mpembeni na ye, alobaki na kimia, “Ezalaki botali moko ya malamu mpe kielombe na bango. Bana wana ya basi ya mike bakobosana mokolo moko te ete toyaki.”

Mapamboli mibale oyo moninga ya nkulutu akoki kopesa ezali bondimami mpe ndakisa ya lisalisi. Namonaki ete ntango mwana na ngai ya mobali epesamaki moninga moko ya botali na ndako oyo azalaki na mayele mpenza mingai koleka ye asalaki. Moninga na ye ya kulutu azalaki mokambi ya misio mbala mibale mpe asalaka na bisaka misusu ya boyangeli.

Liboso ya kokende kotala moko ya mabota batindaki bango, moyangeli oyo ya bonganganzambe uta kala na mosala asengeki aya kotala mwana na ngai na ndako na biso liboso. Bandimaki nayokamela. Moninga na ye ya kulutu abandaki na losambo, kosengeka lisungi. Nsima alobaki likambo moko lokola oyo na mwana na ngai: “Nakanisi tosengeli koteya liteya moko oyo ekoki komonana na libota na ye lokola libiangi na boyamboli. Nakanisi bakokaki te kokoya yango malamu uta na ngai. Nakanisi bakoyamba etinda malamu mingi soki ewuti na yo. Boniboni eyoki mpo na yango?”

Namikundoli nsomo na miso ya mwana na ngai ya mobali. Nakoki lisusu koyoka esengo ya ngonga wana ntango mwana na ngai andimaki kondimama.

Ezalaki libaku te ete episikopo atia baninga wana elongo. Ezalaki na komilengela ya malamu nde moninga ya nkulutu ayekolaki etali mayoki ya libota wana bazalaki pene ya koteya. Ezalaki na bofuli nde ayokaki asengelaki kotika, mpo na konidma elenge moko ya sika mpo na kobianga bana ya Nzambe kokangama na koyambola mpe kozwa kimia.

Nayebi te mbano ya botali na bango, kasi nayebi mpenza ete episikopo moko, mosimbi moko ya bonganganzambe, mpe Nkolo bazalaki kolengela mwana mobali moko mpo na kozala moto ya bonganganzambe mpe mokolo moko episikopo.

Sikawa, masolo ya boye ya elongo na bolengeli ya banganganzamde ezali ya momesano mpo na bino uta na nini bomoni mpe nini boyebi na bomoi na binomei. Boyebi mpe bozali baepisikopo, baninga, mpe baboti ya ndenge wana. Bokomonaka liboko ya Nkolo na bolengeli mpo na mikumba ya bonganganzambe Ye ayebaki ezalaki liboso.

Biso banso na bonganganzambe tozali na lotomo mpo na kosalisa Nkolo kolengela basusu. Ezali na makambo misusu tokoki kosala oyo ekoki koleka na ntina. Kutu ya nguya mingi koleka kosalelaka maloba na liteya na biso ya matongi ekozala ndakisa ya kosalelaka malongi.

Ya motuya koleka na mosala na biso ya bonganganzambe ezali kobengisa bato mpo na koya na Klisto na bondimi, boyamboli, libatisi, mpe koyamba Molimo Mosantu. Mokambi Thomas S. Monson, na ndakisa, apesaki biso lisikuli mpo na kotindika motema na malongi nionso wana. Kasi oyo nayebi asalaki elongo na bato mpe bamisionele mpe baninga ya Eklezia ntango na misio na Toronto alendisaki ngai mpo na mosala.

Na bolengeli ya bonganganzambe, “lakisa ngai” ezali na motuya koleka “lobela ngai” Oyo namoni ekoki kozala na nguya mingi koleka maloba nayoki mpe natangi ntango bayemi na langi elili mpo na ngai.

Yango ezali ntina nini makomi ezali na motuya mingi boye mpo na kolengela biso na bonganganzambe. Etondi na ndakisa. Nayoki lokola soki nakoki komona Alama kolandaka etinda ya anzelu mpe nsima kozonga noki mpo na koteya bato ya mabe na Ammoniah oyo baboyaki ye.4 Nakoki koyoka malili na kisuku ya boloko ntango Profeta Joseph Nzambe alobelaki ye azala na mpiko mpe ete abatelamaki.5 Elongo na makomi wana na bongo tokoki komilengela mpo na kotia molende na mosala na biso ntango emonana ya makasi.

Tata moko to episikopo moko to moninga ya nkulutu ya koteya na ndako oyo alakisi andimeli elenge moko mosimbi bonganganzambe ekoki kobongola bomoi na ye. Tata na ngai mbala moko basengaki ye na moko ya Bapostolo Zomi na Babale mpo na kokoma mwa lokasa etali boyebi mpe boyambi. Tata na ngai azalaki moto ya mayele mingi mpe momemi bonganganzambe moko ya botongono. Kasi Nakoki komikundoli lisusu ntango apesaki ngai lokasa wana akomaki mpe alobaki, “Awa, liboso natinda yango na Bazomi na Mibale, Nalingi otanga yango. Okoyeba soki ezali malamu.” Azalaki na mibu 32 koleka ngai, mpe bwania mpe mayele mingi mpenza.

Nalendisami lisusu na bondimi wana uta na tata monene mpe moto ya bonganganzambe. Ayebaki ete bondimi na ye ezalaki te na ngai kasi Nzambe akokaki mpe alingaki koloba na ngai nini ezalaki malamu. Bino baninga uta kala na mosala bokoki kopambola elenge mosimbi bonganganzambe ya bilenge na bolengeli ntango nionso bokoki kolakaisa ye lolenge wana ya bondimi. Ekosalisa ye kondima liyoki ya boboto ya bofulami mpo na yemei ntango ekoya lokola mokolo moko akotia maboko na ye mpo na kokanga lipamboli mpo na kobikisa mwa mwana moko minganga balobi akokufa. Bondimi wana esalisaki ngai mingi koleka mbala moko.

Elongo na biso na kolengelaka basusu na bonganganzambe ekoya engebene na boni mingi tokolinga bango Yango ekozala mingimingi ya solo ntango tosengeli kosemboli bango. Bokanisa ngonga wana ntango mosimbi bonganganzambe ya Alona, ntano mosusu na mesa ya elembo, akosala mbeba na kosalaka likuli moko. Oyo ezali likambo moko ya lokengo. Ntango mosusu libungi ekosengi bosemboli liboso ya bato oyo ekoki kopesa nkele, liyoki moko ya bomikitisi to kutu kobwakama.

Bokomikundola toli ya Nkolo: “Kopamelaka ntango mosusu na loma, ntango otindaki na Molimo Mosantu; mpe nde kolakisaka lisusu nsima bobakisi ya bolingo epai na ye oyo opamelaki, noki te akokanisa yo ozali monguna na ye.”6

Liloba kobakisa ezali na ntina ya kafukagu na kolengelaka basimbi bonganganzambe ntango basengeli na bosemboli. Liloba epesi likanisi ya kobakisa bolingo oyo esilaki kozala wana. “Kolakisaka ”lisusu ezali ya bolakisi. Baye ya bino bazali kolengela basimbi ya bonganganzambe oyo, ntango bazali koyekola, na ntembe te bakosala mbeba esengeli bazwaki liyoki ya bolingo na biso liboso mpe ya sikisiki. Bayokaki mingi koleka mawa na yo mpo na botau na bango.

Nkolo Yemei atalaki baye ya bangonganzambe ya moke na miso oyo ekumisaki makoki na bango mpe motuya na bango na Ye.Yokamela maloba oyo Yoane Mobatisi alobaki ntango Bonganganzambe ya Alona ezongisamaki: “Likolo na bino baninga na ngai basali, na nkombo ya Masiya napesi Bonganganzambe ya Alona, oyo esimbi bafungola ya mosala ya banzelu, mpe ya nsango malamu ya boyamboli, mpe libatisi na bozindi na mai mpo na bolimbisi ya masumu; mpe eye elongolama mokolo moko lisusu te na mabele, kino bana ya Lewi bakobanza lisusu libonza moko epai na Nkolo ya bosembo.”7

Bonganganzambe ya Alona ezali bobakisi na Bonganganzambe ya Melekisedeki ya monene mingi.8 Lokola mokambi ya bonganganzambe nino, Mokambi ya Eklezia eyangeli likolo ya bonganganzambe ya bolengeli lokola. Bitinda na ye o ntaka ya mibu ya kokendeke kobikisa ebongi mingi mpenza na etinda ya komema nsango malamu na boyamboli mpe libatisi na bomoi ya basusu.

Likita ya lisanga likoki ya badiakona, bateyi, mpe banganganzambe mbala na mbala ekobenda mondimi nionso epai ya Nkolo. Babokambi ekotinda bandimi mpo na koyamba na bondimi mpe bolingo. Badiakona bakolekisa elambo na limemia mpe ma bondimi mpo ete bandimi bayoki nguya ya Bomikabi mpe bakozwa mokano ya kokabola bilembo oyo ya bule.

Bateyi mpe banganganzambe bakosambela elongo na baninga na bango mpo na kokokisa mokumba ya kokengela Eklezia, moto na moto. Mpe baye ya kimoninga wana bakosambela elongo ntango bazali koyekola mposa mpe elikia ya mito ya mabota. Ntango basali yango, bazali komilengela mpo na moko monene ntango bakoyangela na bondimi na libota ya bangomei.

Natatoli ete banso oyo bakosala elongo na bonganganzammbe bazali kolengela bato mpo na boye ya Nkolol na Eklezia na Ye. Nzambe Tata azali na bomoi. —Nayebi —ete Yesu azali Klisto mpe ete Ye alingi biso. Mokambi Thomas S. Monson azali profeta ya Nzambe ya bomoi. Natatoli boye na nkombo esantu ya Yesu Klisto, amene.