2010–2019
Misala na Biso ya Moto ye Moko
sánzá ya zómi 2014


Misala na Biso ya Moto ye Moko

Bolingo ya Yesu Klisto esengeli kozala mokambi na biso soki tolingi toyeba bosenga ya baoyo tokoki kosalisa na banzela songolo.

Na Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka, topesameli libaku mpe lipamboli ya moto ye moko ya kosala. Na ntango molayi nyonso oyo nazali mondimi, nasali na banzela ebele. Lokola Ndeko mobali Udine Falabella, tata ya Mpaka Enrique R. Falabella, azalaki koloba na momesano, “ Ye oyo akosunga na mwa eloko azali malamu mpo na eloko moko boye; ye oyo akosunga mpo na eloko te azali malamu mpo na eloko te.” Oyo ezali maloba tosengeli kobomba na makanisi mpe mitema na biso.

Na kolukaka bokambami na ntango ya mosala, nazuaki libondi na kokanisaka ete Mobikisi atie makanisi na moto ye moko mpe libota. Bolingo mpe bokebi na Ye ya boboto epai ya moto ye moko eteyaki ngai ete Ye ayebi motuya monene ya moko na moko ya bana ya Tata ya Lola mpe ete ezali na ntina mpo na biso tozala na bobangi te ete ya moto ye moko moko na moko asalisami mpe alendisami na nzela ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Na makomi totangi:

“Bomikundola motuya ya milimo ezali monene na miso ya Nzambe…

“Mpe soki ezali boye nde bosengeli kosala mikolo na binonyonso … mpe komema, ata moko ya molimo epai na ngai, boni ya yo esengo monene ekozala na ye na bokonzi ya Tata na ngai!”1

Molimo nyonso ezali na motuya monene liboso ya Nzambe, mpo ete biso tozali bana na Ye mpe tozali na likoki ya kokoma lokola Ye.2

Bolingo ya Yesu Klisto esengeli kozala mokambi na biso soki tolingi toyeba bosenga ya baoyo tokoki kosalisa na banzela songolo. Mateya na Nkolo na biso, Yesu Klisto, elakisi biso nzela. Mpe oyo ezali lolenge mosala na biso moko ebandi: komonaka babosenga, boye kokendaka epai na bango. Lokola Ndeko Muasi Linda K Burton, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki, “Yambo tala, nsima sunga.”3

Mokambi Thomas S. Monson azali ndakisa monene ya mobeko oyo. Na nsanza ya yambo 2005, azalaki kokamba likita ya bakambi ya bonganganzambe na Puerto Rico ntango alakisaki lolenge Mobikisi mpe basali na Ye basungaki na nzela ya mosala ya moto ye moko. Na kosukisa ya liyangani kitoko wana, Mokambi Monson akomaki kopesa mbote na bakambi ya bonganganzambe nyonso na kati ya lisanga. Na mbalakaka, amonaki ete moko kati na bango azalaki kotala eloko moko ya mosika, na kokabuana ye moko.

Mokambi Monson atambolaki libanda ya lisanga, kokendeke epai ya ndeko mobali wana, mpe asololaki na ye. Na motema kobukana, José R. Zayas alobaki na ye ete ezalaki likamuisi ete apusanaka pembeni na ye mpe eyano moko na mabondeli oyo ye mpe muasi na ye, Yolanda, basalaka liboso ya liyangani. Ayebisaki Mokambi Monson ete muana na ye ya muasi azalaki na nzoto malamu penza te mpe ete ye azalaki na mokanda ewutaki na muasi na ye ete ye alingaki epesama na Mokambi Monson. Ndeko mobali Zayas ayebisaki muasi na ye ete ekokaki kosalema te mpo Mokambi Monson alingaki kozala na mosala ebele mpenza. Mokambi Monson ayokaki lisolo mpe asengaki mokanda yango, oyo atangaki na nse ya motema. Nsima atiaki yango na libenga ya elamba na ye mpe alobaki na Ndeko mobali Zayas ete akotala bosenga na bango na bokebi nyonso.

Na lolenge oyo, libota wana esimbamaki na Nkolo, Yesu Klisto, na nzela ya mosali na Ye. Nandimi maloba ya Mobikisi na lisese ya Mosamaliya malamu ezali mpo na biso: “Kende, mpe sala bongo lokola.”4

Na Nsanza ya Libua 21, 1998, ekumbaki Georges ebetaki Puerto Rico, esalaki bobebisi ya makasi. Ndeko Muasi Martinez, bana na biso mitano; mpe ngai tobundaki mpo na kotikala na bomoi na mbonge monene wana mpe mipepe ya ekumbaki ya makasi na kofandaka na ndako na biso. Atako, tokendaki mposo mibale ya kozanga mai mpe lotiliki.

Ntango mai na biso tobombaki esilaki, kozuaka ya mosusu ezalaki mpasi. Nakobosanaka ata mokolo moko te bandeko mibali oyo basungaki biso nakotielaka biso maii oyo ya motuya, mpe nakobosana te lolenge ya bolingo oyo bandeko basi mpe lokola basalelaki biso.

Germán Colón ayaki na ndako na biso na ebombelo monene ya plastiki na mai na kati ya motuna ya likolo. Ayebisaki biso azalaki kosala yango mpo ete, na maloba na ye, “Nayebi bozali na bana ya mike oyo bazali na bosenga ya mai.” Nsima ya mua mikolo, Bandeko mibali Noel Muñoz mpe Herminio Gómez batondisaki bibombelo ya mai misato na motuka epapala. Bayaki na ndako na biso ntango tozalaki kozela bango te mpe batondisaki mulangi nyoso ya mai oyo ekokaki kozuama na mai ya komela, mpe babengaki bato ya pembeni mpo na kotondisa ya bango.

Mabondeli na biso eyanolamaki na misala na bango ya moto ye moko. Bilongi ya bandeko mibali oyo misato elakisaki bolingo oyo Yesu Klisto azali na yango mpo na biso, mpe mosala na bango—na maloba mosusu, mosala na bango ya moto ye moko—ememaki mingi koleka mai na kati ya babomoi na biso. Mpo na muana nyonso ya mobali to ya muasi ya Nzambe, koyebaka ete bato bazali kosepela na mpe kobatela bolemu na ye ezali ntina.

Natatoli na bino ete Tata ya Lola mpe Nkolo na biso, Yesu Klisto, bayebi biso moto na moto mpe moto ye moko. Mpo na ntina wana, Bazali kopesa oyo tosengeli na yango mpo tokozua libaku ya kokoma na bokasi na biso ya bonzambe. Na nzela, Batie bato oyo bakosunga biso. Boye, ntango tokomi bisalelo na maboko na Bango, tozali na makokiya kosalela mpe kosunga baoyo Bango balakisi na biso na nzela ya bobimisi.

Na lolenge oyo, Nkolo Yesu Klisto akosimba bana nyonso ya Tata na biso ya Lola. Mobateli Mpate Malamu akosangisa bampate na Ye nyonso. Akosala bongo na moko na moko lokola bazali kosalela malamu nguya na bango ya boponi oyo ezali malamu—nsima ya koyoka mongongo ya basali na Ye mpe koyamba misala na bango. Bongo bakoyeba mongongo na Ye, mpe bakolanda Ye. Mosala ya moto ye moko ya boye ezali nyonso mpo na kobombaka mayokani na biso ya libatisi.

Ndenge moko, kozalaka ndakisa malamu ya moyekoli ya Yesu Klisto ezali mokanda na biso ya malamu mingi ya komikotisa na bamoko elongo na baoyo tokoki kokabola nsango malamu na Ye. Ntango tofongoli minoko na biso mpe tokaboli nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto, tokomi “babateli mpate na Ye ya balandi, na mokumba ya koleyisaka mpate ya elanga na Ye mpe bana na mpate ya etonga na Ye”5; tokomi ya “kolemba mpe motuya mingi te”6 ya “balobi ya bato.”7

Ya biso lisalisi mpe mosala ya moto ye moko, ezali na nsuka te na kozalaka na mabele oyo. Tokoki mpe kosala mosala mpo na bakufi—mpo na bango oyo bazali na mokili ya molimo mpe oyo, ntango ya bomoi na bango na bokufi, bazuaki te libaku ya kozua makuli ya lobiko ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Tokoki lisusu kobomba zulunale mpe kokoma mambi ma kala ya libota na biso mpo na kobalola mitema ya babomoi epai ya babomoi—malamu mpe lokola mitema ya babomoi epai ya bankoko na bango. Ezali nyonso na ntina ya kokangisa mabota na biso, nkola na nkola, na baekangeli ya seko. Soki tosali yango, tokomi “babikisi … likolo na ngomba ya Siona.”8

Tozali na libaku kitoko ya kozala bisalelo na maboko na Ye. Tokoki kozala bongo na mabala na biso, na mabota na biso, elongo na baninga na biso, mpe elongo bayebani na biso. Oyo ezali mosala na biso ya moto ye moko lokola bayekoli ya solo ya Yesu Klisto.

“Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye: mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba.

“Mpe akotika bampate na loboko na ye ya mobali nde bantaba na loboko na ye ya mwasi.

“Bongo Mokonzi akoloba na bango na loboko ya mobali ete, Yaka, bino bopambwami na Tata na ngai, bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa na ebandeli na mokili:

“Mpo nayokaki nzala mpe bopesi ngai bilei: nazalaki na mposa na mai mpe bomelisi ngai: nazalaki mopaya, mpe boyangeli ngai:

“Nazalaki bolumbu, mpe bolatisi ngai: nazalaki na malali, mpe boyei kotala ngai: nazalaki na ekangelo, mpe boyeli ngai.

“Bongo bayengebene bakozongisa liloba ete, Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala, mpe toleisi yo? To na mposa ya mai mpe tomelisi yo?

“Ntango nini tomoni yo mopaya, mpe toyangeli yo ? to bolumbu mpe tolatisi yo?

“To ntango nini tomoni yo na malali, to na ekangelo, mpe toyei epai na yo?

“Mpe Mokonzi akozongisela bango liloba ete, Nazali koloba na bino solo ete lokola esalaki bino yango epai na moko na ba ndeko baoyo baleki mokemoke, bosalelaki ngai yango.”9

Yango esengeli biso kosala ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.