2010–2019
Elambo—Bozongisi mpo na Molimo
sánzá ya zómi 2014


Elambo—Bozongisi mpo na Molimo

Molimo ebikisi mpe ezongisi milimo na biso. Mapamboli elakamaki ya elambo ezali ete “tokozwa ntango nionso na molimo elongo na [biso].”

Lisanga moko ya bilenge basi mokolo mosusu batunaki ngai, “Nini omitombeli koyebaka ntango ozalaki na mibu na biso?” Soki nazalaki mpo na koyanola motuna wana sikawa, Nalingaki kosangisa makanisi oyo: “Natombeli ntango nazalaki na mibu na bino nasosolaka ntina ya elambo malamu koleka oyo nasosolaki. Natombeli nasosolaka elambo na lolenge Mpaka Jeffrey R. Holland alimbolaki. Alobaki ete, ‘Moko ya mabengisi oyo ezwami na bokuli ya elambo ezali ete yango ezali solo mpenza boyebi ya molimo, lisanga lisantu, bozongisi mpo na molimo.’1

Boniboni elambo ekoki “kozala solo mpenza boyebi ya molimo, lisanga lisantu, bozongisi mpo na molimo” poso nionso?

Elambo ekomaka boyebi moko elendisaka na molimo ntango toyokameli nsambo ya elambo mpe tosali lisusu mayokami na biso. Kosala oyo, tosengeli kondima kozwa likolo na biso nkombo ya Yesu Klisto.2 Kolobaka mpo na elaka oyo, Mokambi Henry B. Eyring ateyaki: “Wana elingi koloba tosengeli komitala lokola ya Ye. Tokotia Ye liboso na bomoi na biso. Tokolinga nini Alingi na esika ya nini tolingi to nini mokili eteyi biso tolinga.”3

Ntango tozwi elambo, tozwi lisusu liyokami ya “komikundola ntango nionso”4 Yesu Klisto. Na butu yambo Abakama na ekulusu, Klisto asangisaki Bapostolo na Ye nzinganzinga na Ye mpe asalaki elambo. Abukaki limpa, apambolaki yango, mpe alobaki, “Bokamata, bolia; oyo mpo na kokanisa nzoto na ngai oyo napesi libonza mpo na bino.”5 Nsima Akamataki nkeni ya vinio, apesaki matondi, apesaki yango na Bapostolo na Ye mpo na komela, alobaki, “Oyo ezali mpo na kokanisa makila na ngai… , oyo esopani mpo na bino lokola mingi bakondimela na nkombo na ngai.”6

Kati ya Banefi mpe lisusu na Bozongisi ya Eklezia na Ye na mikolo ya nsuka, Abandelaki ete tozali kozua elambo mpo na kokanisa Ye.7

Lokola tozali kokabola elambo, totatoli epai ya Nzambe ete tokomikundola ntango nionso Mwana na Ye, kaka te mpo na ngonga mokuse ya bokuli elamba. Oyo elakisi ete tokozala kotala se epai ya ndakisa ya Mobikisi mpe mateya mpo na kokamba makanisi na biso, maponi na biso, mpe misala na biso.8

Libondeli ya elambo ekundolisi biso ete tosengeli “kobatela mitindo na ye.”9

Yesu alobaki, “Soki bolingi ngai, bobatela mibeko na ngai.”10 Elambo epesi biso libaku ya komitala na mitema mpe libaku ya kobalusa motema na biso mpe mposa epai ya Nzambe. Botosi ya mibeko ememi nguya ya nsango malamu kati na bomoi na biso mpe kimia monene mpe bonzambe.

Elambo epesi ngonga mpo na boyebi ya bonzambe mpenza wana ezali biso kolakisa nguya ya kosikola mpe ya kopesa makoki na nzela ya Bomikabi na Ye. Elenge mwasi mokambi kala te ayekolaki na ntina bokasi tozwi wana ezali biso kobunda kokabola elembo na bokebi. Kosalaka mpo na kokokisa masengami na bokoli ya moto, atiaki ntina moko ya kolanda maloba kati na banzembo mpe nsambo ya elambo.

Poso moko na moko, azalaki komitia motuya na ngonga ya elambo. Azalaki kokanisa mabunga asalaka, mpe azalaki komipesa mpo na kozala malamu koleka poso ekoya. Azongisaki matondi mpo na kozala na makoki ya kosala makambo ya malamu mpe kopetolama. Kotalaka nsima na boyebi, alobaki, “Nazalaki kosala eteni ya koyambola ya Bomikabi.”

Eyenga moko sima ya komitala, abandaki koyoka malamu te mpe kobungisa elikia. Akokaki komona ete azalaki kokoba kosala bambeba moko mbala na mbala lisusu, mposo sima ya mposo. Kasi sima azwaki liyoki mosusu ete atalaki mpamba eteni monene ya Bomikabi—ya Klisto kopesaka nguya. Azalaki kobosana ngonga nionso Mobikisi asungaki ye azala oyo azalaki na mposa ya kozala mpe asalaki koleka makoki na yemei.

Na oyo na makanisi, akanisaki lisusu na ntina ya poso eleki. Alobaki: “Liyoki ya esengo ebotamaki na mawa na ngai lokola namonaki ete Apesaki ngai mabaku mpe makoki mingi. Namonaki na mantondi likoki nazwaki ya koyeba bosenga ya mwana na ngai ntango yango eyebanaki te. Namonaki ete mokolo moko ntango nayokaki nakokaki te kokangisa na eloko moko mpo na kosala, Nazalaki na makoki ya kopesa maloba ya kolendisa epai ya moninga. Nalakisaki bompikiliki na likambo oyo mbala mingi amonaki bokeseni uta na ngai.”

Asukisaki: “Lokola natondaki Nzambe mpo na nguya ya kopesa makoki ya Mobikisi na bomoi na ngai, nayokaki elikia mingi mpenza kokoba nzela ya boyamboli oyo nazalaki kosala mpe natalaki epai ya poso ekoya na elikia ezongisama.”

Mpaka Melvin J. Ballard ateyaki boniboni elambo ekoki kozala boyebi moko ya kobikisa mpe kopetola. Alobaki:

“Nani azali wana katikati na biso ete molimo na ye ezokisami te na maloba, makanisi, to misala, Sabato na Sabato? Tosali makambo oyo toyokeli mawa mpe tolingeli kolimbisama. … Lolenge ya kozwila bolimbisi ezali… koyambola masumu na biso, kokende epai ya baye tosalaki epai na bango masumu to tobukaki mobeko mpe kozwa bolimbisi na bango mpe nsima kobongisa na mesa ya elambo wapi, soki toyamboli na bosembo mpe tomitie bisomei na lolenge malamu, tokolimbisama, mpe kobikisama na bonzambe ekoya na molimo na biso. …

“Nazali nzeneneke, ”Mpaka Ballard alobaki, “ete molimo ezala wana na bosali ya elembo ete kopelisa mwa moto molimo uta mutu kino makolo; bokoyoka mpota ya molimo kobika, mpe kozala na elindo kolongwa. Libondisi mpe esengo kozala na molimo oyo elongobani mpe kozala mposa ya bosolo ya kokabola bbilei oyo ya molimo.”11

Milimo na biso ya kozoka ekoki kobika mpe kozongisama bobele te mpo na limpa mpe mayi kokanisa biso libonza ya Mobkisi ya nzoto mpe makila na Ye kasi mpo na bilembo biso tokanisi lisusu ete Akozala seko “limpa ya bomoi”12 mpe “mayi ya bomoi na biso.”13

Sima ya kosala elamboepai ya Banefi, Yesu alobaki:

“Ye oyo akolialoimpa oyo akolia nzoto na ngai mpo na molimo na ye; mpe ye oyo akomela makila na ngai mpo na molimo na ye; mpe molimo na ye ekoyoka nzala to mposa ya komela te, kasi ekotondisama.

“Sikawa, ntango banso baliaki mpe bamelaki, tala, batondisamaki na Molimo.”14

Na maloba maye, Klisto ateyi biso ete Molimo ebikisi mpe ezongisi milimo na biso. Mapamboli ya elaka ya elambo ezali ete tokozala ntango nionso na Molimo elongo na [biso].”15

Ntango nakabolaka elambo, Ntango mosusu namonaka na makanisi elili oyo ezali kolakisa ya Mobikisi asekwa na maboko na Ye ya kofungwama lokola soki abelemi mpo na koyamba biso na kati na boyambi na Ye ya bolingo. Nalingaka elilingi oyo. Ntango Nakanisaka na ntina na yango na ngonga ya kosala elambo, molimo na ngai etombwamaka wana ezali ngai pene kokoka koyoka maloba ya Mobikisi: “Tala, loboko na ngai ya mawa ezali ya kofungwana liboso na bino, mpe ye oyo akoya, akoyambe ye; mpe nakopambola baye bakoya epai na ngai.”16

Basimbi ya Bonganganzambe ya Alona bazali batindami ya Mobikisi ntango bazali kolengela, kopambola, kokabola elambo. Wana ezali mosimbi ya bonganganzambe kotanda loboko na ye mpo na kopesa biso bilembo ebulama, ezali lokola soki Mobikisi Yemei azalaki kotanda loboko na Ye ya mawa, kobengaka moko na mako na biso kokabola makabo ya ntalo ya bolingo oyo ekoki kozwama na nzela ya libonza ya bomikabi na Ye—makabo ya boyamboli, bolimbisi, libonsisi, mpe elikia.17

Mingi tokomaniola ntina ya elambo, ya bule mpe ya ndimbola mingi ekokoma epai na biso. Oyo ezalaki nini tata moko ya mibu 96 alobaki ntango mwana na ye ya mobali atunaki, “Papa, mpo na nini okendaka na eklezia? Okoki komona te, okoki koyoka te, yango ezali mpasi mpo na yo oyeba. Mpo na nini okendaka na eklezia?” Tata ayanolaki, “Ezali elambo. Nakendaka mpo na kokabola elambo.”

Tika moko na moko na biso aya na liyangani ya elambo ya komilengela mpo na kozwa “boyebi mpenza ya bonzambe, lisanga lisantu, bozongisi mpo na mplimo [bisoo].”18

Nayebi ete Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi na biso bazali na bomoi. Natondi mpo na libaku elambo epesi ya koyoka bolingo na Bango mpe mpo na kokabola Molimo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.