2010–2019
Nkolo azali na Mwango mpo na Biso
sánzá ya zómi 2014


Nkolo azali na Mwango mpo na Biso

Soki tokobi na kozala lokola tozali, mapamboli elakelamaki ekokokisama?

Litomba kani kozala eteni moko ya ngonga oyo ya nsngo ntango balobi na likita linene bakoki koloba na monoko na bango ya kobotama. Mbala ya nsuka na lobaki na elobele oyo, namitungisaki mpo na elobeli na ngai ya Anglais. Sikawa, namitungisi mpo na lombangu ya Kiportige na ngai. Nalingi te koloba mbangu mingi koleka maloba na nse ya etando.

Biso banso tozala to tokozala na ba ngonga ya mikano minene na bomoi na biso. Esengeli ngai kolanda nzela ya mosala oyo to wana? Esengeli ngai kosala misio? Ezali oyo moto malamu mpo na ngai nabala?

Oyo ezali bizaleli na makambo ya bomoi na biso na yango mwa mbongwana na bokambi ekoki kozala na mbano ya ntina na nsima. Na maloba ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf: “Na mibu ya kosalela Nkolo …, nayekoli ete bokeseni katikati ya esengo mpe mawa na bato, mabala, mpe mabota mbala mingi ewuti na mbeba moko ya bobele mwa bandelo” (“A Matter of a Few Degrees,” Ensign toLiahona,Sanza ya Mitano 2008, 58).

Boniboni ekoki biso kokima mwa bambeba na botamboli?

Nakosalela likambo moko ya ngaimei mpo na kolimbola etinda na ngai.

Na nsuka ya ba1980, libota na ngai ya bolenge ezalaki na mwasi na ngai, Mônica, mibale ya bana na biso minei, mpe ngai. Tozalaki kovanda na São Paulo, na Brazil, nazalaki kosala na kompani ya malamu. Nasilisaka koyekola na université mpe Nawutaki kala te kopemisama lokola episikopo ya palwasi wapi tozalaka kovanda. Bomoi ezalaki malamu, mpe nionso ezalaki komonana lokola esengelaki kozala—kino mokolo moko moninga na ngai ya kala ayaki kotala biso.

Na nsuka ya botali na ye, apesaki liloba moko mpe atunaki ngai motuna moko oyo epanzaki bondimi na ngai. Alobaki, “Carlos, nionso emonaki lokola ezali malamu mpo na yo, libota na yo, mosala na yo, mpe mosala na yo mpo na Eklezia, kasi—” mpe nde eyaki motuna, “soki okobi kozala lokola ozali kozala, mapamboli malakelamaka na lipamboli na yo ya batata?”

Nakanisaka naino te etali lipamboli na ngai ya batata na lolenge oyo. Natangaki yango mbala na mbala kasi mbala moko te na ntina ya kotala epai ya mapamboli malakelama na nsima mpe ekososolaka boniboni nazalaki kowumelaki sikawa.

Nsima ya botali oyo, nabalolaki bokebi na ngai na lipamboli na ngai ya batata, komitunaka, “Soki kotobi kozala lokola tozali, mapamboli malakelama makokokisama? Nsima ya komaniola, nayokaka ete boko mbongwana esengelaki, mingimingi na boyekoli mpe mosala.

Ezalaki te mokano katikati ya nini ezalaki malamu mpe mabe kasi katikati ya nini ezalaki malamu mpe nini elekaki malamu, lokola Mpaka Dallin  H Oaks ateyaki biso ntango alobaki: Ntango tokanisi na maponi kilikili, tosengeli komikundoli ete ekoki te ete eloko moko ezala malamu. Maponi masusu maleki malamu, mpe lisusu misusu eleki malamu mingi” (“Good, Better, Best,” Ensign toLiahona, Sanza ya Zomi na Moko. 2007, 104–5).

Boniboni nde ekoki biso koyeba ete tozali kozwa mokano eleki malamu mingi?

Tata mwa mabongisi oyo nayekolaki.

Libongisi ya Yambo: Tosengeli kotala Maponi na Nsuka na Makanisi

Kozwa mikano oyo ekoki kozala na mbano na bomoi na biso mpe baye tokolingaka na kozanga kozala na bomoni ya monene ya mbano na bango ekoki komema na mwa likama. Nzokande, soki tokotala mbano ekoki koya na nsima, tokoki komona polele mingi nzela eleki malamu ya kozwa lelo.

Kososoli nani tozali, ntina nini tozali awa, mpe nini tokozela mpo na bison a bomoi oyo ekosunga kopesa biso bolai ya limoni tozali na yango mposa.

Tokoki kozwa bandakisa na makomi na yango kozwaka bomoni ya monene mingi epesaki polele etali nzela ya kozwa.

Mose alobaki na Nkolo miso na miso, ayekolaki etali mwango ya lobiko, mpe na yango asosolaki mosala na ye lokola profeta mpo na kosangisa Yisalaele.

“…Mpe Nzambe alobaki epai ya Mose, kolobaka, Tala, nazali Nkolo Nzambe ya Bokasi Bonso...

““….Mpe Nakolakisa yo bisalele ya maboko na ngai ….

“Mpe nazali na mosala mpo na yo, Mose, mwana na ngai” (Mose 1:3–4, 6).

Na bososoli oyo, Mose akokaki kokanga motema mibu mingi ya monioko na esobe mpe akambaka Yisalaele kozonga na mboka na ye..

Lehi, profeta monene ya Buku ya Mormon, mpe na limoni ayekolaki etinda na ye mpo na kokamba libota na ye na mboka ya elaka.

“Mpe esalemaki ete Nkolo atindaki tata na ye na ndoto, ete asengelaki komema libota na ye mpe kokende na kati ya esobe.

“… Mpe atikaki ndako na ye, mpe mboka ya lisango na ye, mpe wolo, mpe mpauni, mpe biloko ya ntalo mingi” (1 Nephi 2:2–4).

Lehi atikalaki botongono na limoni na ye atako bakposo ya mobembo mpe kotikaka nsima bomoi moko ya elengi na Yelusaleme.

Profeta Joseph Smith azali ndakisa mosusu monene. Ba nzela ya mabimisi, kobandaka na Limoni ya Yambo, akokaki kosilisa etinda na ye ya kozongis makambo manso (talaJoseph Smith—History 1:1–26).

Nini mpo na biso? Nini Nkolo azali kozela na moko na moko na biso?

Tozali na mposa te ya komona anzelu mpo na kozwa bososoli. Tozali na makomi, tempelo, baprofeta ya bomoi, mapamboli na biso ya batata, bakambi ya kfulama, mpe likolo na nionso, likoki ya kozwa libomisi ya moto na moto mpo na kokamba mikano na biso.

Libongisi ya Mibale: Tosengeli Kolengelama mpo na Mikakatano Oyo Ekoya

Biteni ya malamu na bomoi ezali mingi ya pete te. Mbala mingi, ezali mpenza likambo mosusu. Tokoki kotala na bandakisa ya baprofeta nalobelaki.

Mose, Lehi, mpe Joseph Smith basalaka mibembo ya pete te atako mibeko na bango ezalaki malamu.

Tolingi kofuta ntango mpo na mikano na ye? Elengelami biso mpo na kotika bisika na biso ya elengi mpo na kokoma na esika moko eleki malamu?

Kozongaka na likambo ya lipamboli ya batata, nakomaki na nsuka na likanisi na ntango wana ete nasengelaki koluka koyekola lisusu mpe kosenga bourse ya université moko ya Etazuni. Soki naponamaki, nasengelaki kotika mosala na ngai, koteka nionso tozalaki na yango, mpe koya kovanda na USA lokola mwana ya kelasi mpo na mibu mibale.

Mimekano lokola TOEFL mpe GMAT ekomaki mikakatano yay ambo ya kolonga. Ezwaki mibu milai misato ya bolengeli, makambo “mingi,” mpe “ntango mosusu” yambo nandimama na université. Namikundoli lisusu kobenga ya telefone nazwaki na nsuka ya mobu ya misato uta na mopesi babourse.

Alobaki, “Carlos, nazali na nsango moko ya malamu mpe moko ya mabe mpo na yo. Nsango malamu ezali ete ozali o ntei ya basukusi misato mobu oyo.” Ezalaki bobele na bobimi moko na ntango wana. “Nsango ya mabe ezali ete moko ya bameki azali mwana ya moto moko ya monenene, mosusu azali mwana ya moto mosusu ya monene, mpe nde yo ozali.”

Nokinoki nayanolaki, “Mpe ngai …ngai nazali mwana ya Nzambe.”

Na esengo, kindeko ya mokili ezalaki te likambo ya motuya, mpe nazwamaki mobu wana, na 1992.

Tozali bana ya tata ya Bokasi Bonso. Azali Tata na biso, mpe azali na mwango mpo na biso. Tozali te awa na bomoi oyo kaka mpo kobebisa ntango na biso, kokoma mobange, mpe kokufa. Nzambe alingi biso tokola mpe tokokisa makoki na biso.

Na maloba ya Thomas S. Monson: “Moko na moko na biso, monzemba to molongani, kotala te mibu, azali na libaku ya koyekola mpe kokola. Kotandola boyebi na biso, ya mayele mpe ya molimo, mpo na kozwa nzoto mobimba ya makoki na biso ya bonzambe” (“The Mighty Strength of the Relief Society,” Ensign, Nov. 1997, 95).

Libongisi ya Misato: Tosengeli Kokabola Limoni Oyo elongo na Bato Tokolingaka

Lehi amekaki mingi koleka mwa komeka mpo na kosalisa Lamani mpe Lemwele basosola motuya ya mbongwana bazalak kosala. Lokola bakabolaki te limoni ya tata na bango esalaki bango bayimayima na mobembo. Nefi, epai mosusu, alukaki Nkolo mpo na komona nini tata na ye amonaka.

“Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, nayokaki maloba nionso ya tata na ngai, etali makambo oyo amonaki na limoni, … ngai …nazalaki na mposa lisusu ete nakoka komona, mpe koyoka, mpe koyeba makambo oyo, na nguya ya Molimo Mosantu” (1 Nephi 10:17).

Na limoni oyo, Nefi akokaki kaka te kolonga mikakatano ya mobembo kasi lisusu kokamba libota na ye ntango esengelaki.

Ezali ntango mosusu ya solo ete ntango tozwi mokano ya kozwa nzela moko, bato tokolingaka bakoyoka, mpe boko kutu bakokabola elongo na biso mbano ya boponi. Mingimingi, basengeli komona nini tomoni mpe bakokabola bondimi na biso. Oyo ekoki kosalema ntango nionso te, kasi ntango esalemi, mobembo ekozala pete mingi.

Na mayele ya moto na moto nasalelaki ndakisa, nasengelaki lisungi ya mwasi na ngai. Bana bazalaki naino na oyo koloba, kasi lisungi ya mwasi na ngai ezalaki na ntina. Namikundoli ete, liboso, Mônica mpe ngai tosengelaki kosolola na bokebi mbongwana wana na mingo kino akoyoka elengi mpe lisusu akomipesa. Limona oyo ekobalamaki esalaki ye kaka te asunga mbongwana kasi lisusu mpo na kokoma eteni ya ntina na elongo na yango.

Nayebi ete Nkolo azali na mwango moko mpo na biso na bomoi oyo. Ye ayebi biso. Ye ayebi nini eleki malamu mpo na biso. Kaka mpamba te makambo ezali malami elingi koloba te ete tosengeli te mbala na mbala, kokanisa soki ekoki kozala na likambo moko eleki malamu. Soki tokobi na kozala lokola tozali kozala, elakelama ekokokisama?

Nzambe azali na bomoi. Ye azali Tata na biso. Mobikisi Yesu Klisto azali na bomoi, mpe nayebi ete na nzela ya libonza ya bomikabi na Ye tokoki kozwa bokasi mpo na kolonga mikakatano na biso ya mokolo na mokolo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.