2010–2019
Elambo mpe Bomikabi
sánzá ya zómi 2014


Elambo mpe Bomikabi

Likuli ya elambo esengeli kokoma esantu koleka mpe ya bosantu mpo na moko kati na biso.

Na butu ya Getesemane mpe Kalivari, Yesu asangisaki Bapostolo na Ye elongo mbala moko ya suka mpo na kogumbamela. Esika ezalaki na kisuku ya likolo ya moyekoli moko na Yelusaleme, mpe na eleko ya Pasika.1

Yambo na yango ezalaki momeseno ya elambo ya Pasika oyo ezalaki ya kotumba mpate, vino, mpe limpa ezangi fulu, elembo ya lisiko ya kala ya Isalaele uta na boumbu mpe kufa2 mpe ya bosikoli ekoya nsima oyo esengelaki kosalema..3Lokola elambo ekomaki na nsuka, Yesu azwaki limpa, apambolaki mpe abukaki yango,,4mpe apesaki yango na Bapostolo na Ye, kolobaka, “Bokamata, bolia5“Oyo ezali nzoto na ngai esili kopesama mpo na bino. Sala boye mpo na kokanisa ngai.”6Na lolenge moko, Akamataki kopo ya vinio, apambolaki yango, mpe alekisaki yango na baoyo bazalaki nzinganzinga na Ye, kolobaka: “Kopo oyo ezali boyokani ya sika na makila na ngai,”7“oyo masopani … mpo na bolimbisi ya masumu.”8 “Bosala boye mpo na ekaniseli na ngai.”9

Na lolenge ya pete kasi ya mozindo oyo, Yesu abandaki likuli ya sika mpo na bato ya boyokani ya Nzambe. Mokolo moko lisusu te makila ya niama ekosopama to mosuni ya niama ekotumbama kolakisa libonza ya kosikola ya Klisto oyo akoya mokolo mosusu.10Na esika wana, bilembo ya mosuni ya kobukana mpe makila ya kosopana ya Klisto oyo asilaka koya bikokamatama mpe bikoliama mpo na kokanisa libonza ya kosikola na Ye.11Kosala na bino elongo na bokuli ya sika oyo elingi boye koloba epai na banso boyambi ya lokumu ya Yesu lokola Klisto oyo alakamaki mpe bolingi mobimba ya kolanda Ye mpe kobatela mitindo na Ye. Na baoyo batalisa mpe bakotambwisa bomoi na bango boye, kufa ya molimo “ekoleka” bango, mpe bomoi ya seko ekozala likambo ya ntembe te.

Na bangonga mpe mikolo oyo elandaki, Yesu akotaki na Getesemane, amemamaki na Kalivari, mpe na elonga akapasolaki lilita ya Alimataya. Nsima ya kokabwana na Ye na bango, bayekoli ya botongono ya Yesu kati na mpe mpembeni ya Yelusaleme bayanganaki na mokolo ya yambo ya poso mpo na “kobuka limpa”12mpe basalaki yango “na molende.”13Solo, basalaki boye bobele mpo na komikundila Nkolo mokufi na bango kasi lisusu mpo nakolakisaka botondi mpo na mpe bondimi kati na Bosikoli na Ye ya kitoko na ntina na bango.

Kolandanaka, ntango Yesu akendaki epai ya Bayekoli na Ye na Amerika, Asalaki lisusu elambo kati na bango. Nakosalaka bongo14. Nakosalaka bongo,Alobaki:“Oyo bosengeli kokoba kosala”15mpe “ekozala litatoli epai ya Tata ete bokokoba kosala mpo na kokanisa ngai.16Lisusu, na bozongisi, Nkolo atiaki likuli ya elambo, kopesaka makebisi epai na biso maye Apesaki na bayekoli na Ye ya yambo.17

Bokuli ya elambo ebengami “moko ya makuli esantu mpe ya bule mingi kati na Eklezia.”18Esengeli kokoma esantu mpe ya bule koleka mpo na moko na moko na biso. Yesu Klisto Yemei atiaki likuli yango mpo na kongolisa biso oyo Ye asalaki masikola biso mpe ateya biso boniboni tokoki kosalela Bosikoli na Ye mpe na yango tozala lisusu na bomoi elongo na Nzambe.

Na limpa ya kopasola mpe ya kobukana, tolingi koloba ete tozali komikundola nzoto ya mosuni ya Yesu Klisto—Nzoto moko oyo eyokaka mpasi ya bolozi, matungisi, mpe masenginia ya lolenge na lolenge,19nzoto moko oyo ememaki mokumba ya mpasi ekoka mpo na kobimisa makila na madusu nionso,20nzoto moko oyo na yango mosuni etobolamaki mpe oyo na yango motema ebukanaki na ekulusu.21Tolimboli bondimi na biso ete ntango nzoto se moko wana elamusamaki mpo na kopema kati na liwa, esekwisamaki lisusuna bomoi uta na lilita, moko moko te lisusu ekoyeba malali, bobebi, mpe liwa.22Mpe na kozwaka limpa mpo na bisomei, tondimi ete, lokola nzoto ya kufa ya Klisto, banzoto na biso ekokangolama uta na bankanga ya liwa, ekosekwa na elonga uta na lilita, mpe ekozongisama na milimo na biso ya seko.23

Na mwa kopo ya mai, tolingi koloba ete tozali komikundola makila Yesu asopaki mpe mpasi ya molimo Ye ayokaki mpo na bato banso. Tomikundoli mpasi oyo esalaki matanga minene ya makila ekweya na Getesemane. 24Tomikundoli mpota mpe mpasi Aniokwamaki na maboko ya bakengi Ye.25Tomikundoli makila Asopaki uta na maboko, makolo, mpe mopanzi na Ye ntango azalaki na Kalivari.26Mpe tomikundoli nin etali mpasi na Ye: “Bolozi ya lolenge boyebi te, mpasi ya lolenge boyebi te, mokumba makasi ya lolenge boyebi te.”27Nakozwaka mayi mpo na bisomei, tozali kondima ete makila mpe mpasi na Ye apesaki mpo na masumu na biso mpe ete Ye akosokola masumu na biso wana eyambi mpe endimi biso mabongisi mpe makuli ya nsango malamuna Ye.

Yango wana, na limpa mpe mai, tokundolisami Bosikoli ya Klisto na ntina na biso uta liwa mpe lisumu. Nini ezali motuya tokokabola limpa liboso mpe mayi sima. Na kokabolaka limpa, tomikundoli oyo etali bosekwi ya moto ye moko ya bisomei ya nsuka oyo ezali na mingi koleka bozongani kaka ya nzonto mpe molimo. Na nguya ya Bosekwi, banso na biso tokozonga na miso ya Nzambe.28Bosolo wana elakisi biso motuna ya ntina ya babomoi na biso. Motuna ntina oyo etali biso banso soki tokozala na bomoi, kasi na nani elongo tokozala na bomoi ntango tokokufa. Atako moto nionso kati na biso akozonga na miso ya Nzambe, banso te na biso tokofanda na Ye elongo.

Na nzela ya bomoi ya kufa, moko moko na biso akobebisama na lisumu mpe bobuki mobeko.29Tolingaki kozala na makanisi, maloba, mpe misala oyo elingaki kozala malamu te.30Na mokuse, tokozala ya mpeto te. Mpe nsuka ya bozangi mpeto na miso ya Nzambe, Yesu alobaki yango polele malamu: “Eloko moko te ya mbindo ekoki kofanda … na miso na ye.”31. Bozali solo wana elobelami polele epai ya Elenge Alma oyo, ntango abundisamaki na anzelu esantu, amitungisaki mpenza na mbindo na ye ete akoma na mposa ya kokoma “kolimwa nzoto mpe molimo lokola, ete [a]koka te komememe mpo na kotelema na miso ya … Nzambe.”32

Na bokaboli ya mayi ya elambo,toteyami sika tokoki kopetolama uta na lisumu mpe bobuki mobeko mpe makoki ya kotikala na miso ya Nzambe. Na nzela ya bosopi ya makila na Ye ezangi likambo, Yesu Klisto akokisaki babonsenga ya boyengebeni mpo na masumu mpe bobuki mobeko nionso. Amipesaki nde mpo na kopetola biso soki tokozala na bondimi kati na Ye ya kokoka mpo na koyambola, kondima makuli manso mpe mayokani ya lobiko, kobandaka na libatisi, mpe kozwaka Molimo Mosantu. Na boyambi na biso ya Molimo Mosantu tosukolamaki mpe topetolamaki .Yesu alimbolaki malongi oyo polele mpenza:

“Eloko te ya mbindo ekoki kokota na kati ya bokonzi [ya Nzambe]. … eloko te ekoti na bopemi na ye longola se soki ezali bango baye basokoli bilamba na bango na makila na ngai. ...

“Sikawa oyo ezali motindo: Boyambola, bino banso nsuka yam abele, mpe boya epai na ngai, mpe bobatisama na nkombo na gai, ete bokoka kosantisama na bozwi ya Molimo Mosantu, ete bokoka kotelema na bonzangi mbindo liboso na ngai na mokolo ya nsuka.”33

Oyo ezali malongi ya Klisto.34Ntango tozwi malongi oyo mpe totambwisi babomoi na biso, tosukolami na makila ya Klisto mpe topetolami.35

Na nzela ya nsambo ya elambo, tolobaka bondimi na biso ya malongi oyo ya Klisto mpe bomipesi na biso mpo na kozala na bomi engebene na yango. Na bosengi epai ya Nzambe Tata na biso ya Seko, tolobaka ete to “akomikundola ntango nionso” Mwana na Ye ya talo. Yambo, tolakisi motema malamu na biso mpo na komikundola. Bongo totatoli ete tomikundoli. Nakosalaka, kosalela bondimi kati na Yesu Klisto mpe na Bosikoli na Ye mpo na biso na molendeuta na liwa mpe lisumu.

Tolobi lisusu ete toko “batela mitindo na ye.” Wana ezali bomipesi ya lokumu mpo na koyambola. Soki makanisi, maloba, to misala na biso ezali moke koleka oyo isengelaki kozala na mikolo mileki, tomipesa na kokokisenisa mingi babomoi na biso na oyo ya Ye na mikolo mikoya.

Sima, tolobi ete to “zali na bolingi ya kozwa likolo na [biso] nkombo ya Mwana [yango].”36Wana ezali bomipesi ya lokumu ya komipesa na likoki na Ye mpe ya kosala mosala na Ye, oyo ezali na kozwaka mpo na bisomei makuli ya lobiko mpe mayokani nionso.37

Ntango tozali komipesa na mabongisi oyo, tolakelami na nsambo ya elambo ete toko “kozala na Molimo na ye elongo na [biso].”38Kozwaka lisusu Molimo ezali moko ya mapamboli ya likolo mingi, mpo ete ntango Molimo mosali oyo apeteli mpe asantisi biso uta na lisumu mpe bobuki mobeko.39

Bandeko mibali mpe basi, likambo ya motuya mingi na ntango mpe na boseko ezali Bomikabi ya yesu Klisto. Ye oyo akokisaki Bomikabi apesi biso likuli ya elambo mpo na kosalisa kaka te komikundola kasi lisusu mpo na kosenga mapamboli ya ekela ya ngolu oyo eluti.Bozali ya mbala na mbala mpe bosembo na likuli ya bule oyo esalisaka biso kokoba koyamba mpe kosalela malongi ya klisto nsima ya libatisi mpe mpensima kokoba mpe kokokisa nzela ya bobulisami. Solo, likuli ya elambo esalisaka biso kotia molende na botongono kino na nsuka mpe kozwa litondi ya Tata lolenge moko Yesu asalaki, ngolu na likolo na ngolu.40

Natatoli mpo na nguya ya Yezu Klisto mpo na kosikola biso banso uta na kufa mpe na nguya ya makuli ya bonganganzambe na Ye, kosangisa elambo, mpo na kolengela biso komona elongi ya Nzambe, Tata, mpe kobika. 41Tika tozwa elambo poso ekoya, mpe poso moko na moko kuna, na mposa makasi mpe ntina makasi, Nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.