2010–2019
Kolinga Basusu mpe Kovanda na Bokeseni
sánzá ya zómi 2014


Kolinga Basusu mpe Kovanda na Bokeseni

Lokola balandi ya Klisto tosengeli kovanda na kimia elongo na basusu oyo bazali te kokabola mituya na biso to kondima mateya likolo na yango evandi.

I.

Na mikolo ya bosukisi ya mosala na Ye ya bokufi, Yesu apesaki bayekoli na Ye oyo abiangaki “mobeko ya sika ” (Yoane 13:34). Kozongelaka mbala misato, mobeko wana ezalaki pete kasi mmpasi: “Linga moninga, lokola nalingaki bino” (Yoane 15:12; tala lisusu molongo 17). Liteya ya kolingana ezalaki liteya ya mama na ntina ya mosala ya Mobikisi. Mobeko ya monene ya mibale ezalaki “kolinga moninga na yo lokola omilingaka yomei” (Matai 22:39). Yesu kutu ateyaki, “Bolinga banguna na bino” (Matai 5:44). Kasi mobeko ya kolinga basusu lokola Ye alingaka etonga na Ye ezalaki mpo na bayeloli na Ye —mpe ezali mpo na biso—monekamo oyo ezalaki se moko. “Ya solo,” Mokambi Thomas S. Monson ateyaki biso Sanza ya Minei eleki, “bolingo ezali ntina mpenza ya nsango malamu, mpe Yesu Klisto azali ndakisa na biso. Bomoi na Ye ezalaki libula ya bolingo.”1

Mpo na nini yango ezali mpasi kolingana lolenge ya Klisto? Ezali mpasi mpo ete tosengeli kovanda kati na baye bazali te kokabola boyambi mpe bantina mpe lotomo ya mayokami. Na Libondeli monene ya kosambelela na Ye, asalaki kaka yambo ya kobakama na Ye na ekulusu, Yesu abondelaki mpo na balandi na Ye: “Napesaki bango maloba na yo; mpe mokili eyinaki bango, mpo ete bazali ya mokili te, lokola nazali ya mokili te” (Yoane 17:14). Bongo, epai ya Tata Asambaki, nasambeli te mpo na olongola bango na mokili, kasi mpo ete obatela bango uta na mabe” (molongo15).

Tozali kovanda na mokili kasi tozali kozala te ya mokili. Tosengeli kovanda na mokili mpo ete, lokola Yesu ateyaki na lisese, Bokonzi na Ye ezali “lokola mfulu,” oyo mosala na yango ezali kotombola lisanga mobimba na nguya na yango (talaLuka 13:21; Matai 13:33; tala lisusu 1 Bakolinti 5:6–8). Balandi na Ye bakoki te kosala oyo soki basangani bobele elongo na baye bazali kokabola boyambi mpe misala. Kasi Mosikoli ateyaki lisusu ete soki tolingi Ye, tokobatela mibeko na Ye (tala Yoane 14:15).

II.

Nsango malamu ezali na mateya mingi na ntina ya kobatela mibeko na ntango tovandi kati na bato elongo na boyambi mpe bizaleli ekeseni. Mateya na ntina ya boweli ezali na katikati. Ntango Klisto asekwaki akutaki Banefi koswanaka likolo ya lolenge ya kobatisa, Apesaki polele nzela boniboni bokuli oyo esengeli kosalema. Bongo Ateyaki libongisi monene oyo:

“Mpe ekozala boswani ekozala te o ntei ya bino, lokola ezalaki kinoa sikawa; mpe ekozala boswani o ntei ya bino etali biteni ya malongi na ngai, lokola ezalaki kina sikawa.

“Mpo solo,solo nalobi epai na bino, ye oyo azali na molimo ya boweli azali ya ngai te, kasi ya zabulu,oyo azali tata ya boweli, mpe ye alamusi mitema ya bato na boweli na nkanda bango na bango.

“Tala, oyo ezali … malongi na ngai, ete makambo ya lolenge oyo esila” (3 Nefi 11:28–30; sete ebetamaki).

Mosikoli atiaki ndelo te na makebisi na Ye mpo na boswani na baye bazalaki kobatela mobeko te na ntina ya libatisi. Apekisaki boswani na moto nionso. Kutu baye bazali kobatela mibeko basengeli te kolamusa mitema ya bato na koswani na nkanda. “Tata ya boswani ” ezali zabulu; Mosikoli azali Mokonzi ya Kimia.

Lolenge moko, Biblia eteyi ete “moto ya mayele alongolaka nkanda ” (Masese 29:8). Bapostolo ya yambo bateyaki ete tosengeli “kolanda nsima na makambo [oyo] epesaka kimia” (Baloma 14:19) mpe “[loba]bosolo na bolingo” (Baefeso 4:15), “for the nkanda ya moto ekosala bosembo na Nzambe te” (Yakobo 1:20). Na bobimisi ya sikawa Nkolo apesaki mobeko ete nsango ya esengo ya nsango malamu ezongisama esengeli kopesama “moto nionso na mozalani na ye, na kolenga mpe na bosekomi” (D&A 38:41), “na bomikitisi nionso, … kofinga te baoyo bafingaka” (D&A 19:30).

III.

Ezala lokola toluki kozala na boboto mpe koboya bozwani, tosengeli te kondima to kokitisa bomipesi na biso na babosolo tososoli.Tosengeli te koboya bisika na biso to bantina na biso. Nsango malamu ya Yesu Klisto mpe mayokami tosala na ntembe te etindi biso babundi na momekamo ya seko kati na bosolo mpe bobe. Ezali na mabele ya katikati te na etumba wana.

Mobikisi alakisaki nzela ntango banguna na Ye abundisaki Ye elongo na mwasi oyo “azwamaki na ekobo, na likambo mpenza” (Yoane 8:4). Ntango nsoni elongo na kozanga bosembo na bango bafundi bakendaki mpe batikaki Yesu ye moko elongo na mwasi. Alakisaki ye boboto na koboyaka kopesa ye etumbu na ngonga wana. Kasi Atindaki na ye mpenza “kosala lisusu lisumu te” (Yoane 8:11). boboto ya bolingo esengami, kasi molandi ya Klisto—kaka lokola Molakisi—bazali sikisiki na bosolo.

IV.

Lokola Mobikisi, balandi na Ye ntango mosusu babundisami na ezaleli ya lisumu, mpe lelo ntango basimbi mpo lokola alima mpe mabe lokola basosoli yango, babengami ntango mosusu “bindimandima” to “biyambayamba” Bantina mpe bizaleli mingi ya mokili ezali mimekamo mpo na Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Ya motuya mpenza kati na baye na mikolo ya lelo ezali mopepe ya makasi oyo ezali kondima mobeko ya libala ya mwasi na mwasi mpe mobali na mobali na bituka mingi ya Etats-Unis mpe Canada mpe bikolo misusu kati na mokili. Tozali lisusu kati na mingi boko bazali kondima libala ata moke te. Basusu balingi te kozala na bana. Basusu baboyi kopekisa pornographie to badrogue ya makasi. Ndakisa mosusu — momeseno na biyamba mingi mpenza—ezali momekamo ya kovanda elongo na molongani oyo azali mondimi te to kosangana na baninga ya mosala ya bandimi te.

Na bobulisi bisika, lokola tempelo, ndako ya losambo, mpe bandako na bisomei, tosengeli koteya bosolo mpe mibeko na polele mpe mobimba lokola tososoli yango uta na mwango ya lobiko ebimisami na nsango malamu ezongisama. Ndingisa na biso ya kosala bongo ebatelami na mobeko monene ya mboka epesi bosomi ya koloba mpe eyamba, mpe ya bonkutu oyo ekumisami na bikolo na kozanga ndingisa ya mobeko monene ya mboka.

Na libanda, oyo bato ya biyamba balobi mpe ekotisi makanisi mosusu. Bonsomi ya kosalela eyamba ezipi misala mpenza, kasi ezali likambo mpo na bolongobani esengeli mpo na kondimisa biyamba mpe misala ya basusu. Mibeko ekoki kopekisa ezaleli oyo mingimingi endimaki lokola mabe to ekoki kondimama te, lokola moniokoli ya bonsomi, loma, to ezaleli ya botomboki, ata ntango esalemi na batomboki na nkombo ya eyamba. Ezaleli ya mabe moke, atako endimami te na bato mingi, esengelami kaka kondimama soki ezwi ndingisa ya mobeko na nini profeta ya Buku ya Mormon abengaki “mongongo ya bato” (Mosiah 29:26).

Na likambo ya lisikulu ya libanda, tosengeli banso kolanda mateya ya nsango malamu mpo na kolinga mozalani na biso mpe koboya boswani. Balandi ya Klisto basengeli kozala ndakisa ya bompenza. Tosengeli kolinga bato banso, kozala bayoki ya malamu, mpe kolakisa limemia mpo na boyambi na bango. Atako tokoki koboya, tosengeli te kozanga boboto. Ezalela na biso mpe bosololi na biso na makambo ya bokeseni ekoki te kozala na boswani. Tosengeli kozala na mayele na kolimbolaka mpe kokoba na ezaleli na biso mpe na kosalelaka nguya na biso. Na kosalaka bongo, tosengi ete basusu batukama te na bondimi ya eyamba na biso mpe kosalela bosomi ya eyamba na biso. Tolendisi biso banso tosalela Mobeko ya Wolo ya Mosikoli: “ Oyo nionso bolingi ete bato basala mpo na bino, bosala yango mpe mpo na bango” (Matai 7:12).

Ntango ezaleli na biso elongi te, tosengeli kondima mbano ye esengo te na boboto mpe kosalela bompenza na bato ya ngambo mosusu. Na ntango nionso, tosengeli kozala bato ya motema malamu na bato nionso, koboyaka moniokoli ya lolenge nionso, elongo na moniokoli uta na langi ya loposo, ekolo, bondimi ya eyamba to bozangi eyamba, mpe bokeseni uta na makanisi ya bosangisi nzoto.

V.

Nalobi mpo na mibeko nionso. Sika Nakoloba boniboni mibeko wana ekoki kosalelama na makambo ya ndenge na ndenge ya momesano na yango mateya ya Mobikisi esengeli kolandama na botongono mingi koleka.

Nabandeli na nini bilenge bana na biso bakoyekola na milulu na bango ya masano. Mbala mingi baye bazali Bamormon te awa na Utah batukamaki mpe kobwakisama na mingi ya boko bandimi na biso oyo bapesaki nzela te na bana na bango bakoma baninga ya bana ya bondimi mosusu. Ya solo tokoki koteya bana na biso bantina mpe mibeko ya ezaleli endimami na kozanga kosala bamitia mosika to balakisa kozanga limemia na oyo nionso azali na bokeseni.

Bateyi mingi na eklezia mpe na eteyelo batungisami na lolenge boko bilenge, sangisa bilenge ya LDS, bazali kosalana. Mobeko ya kolingana solo esangisi bolingo mpe limemia katikati ya biyamba mpe lisusu na ndelo katikati ya langi ya loposo, bonkoko, mpe ya bozwi. Tokebisi bilenge nionso baboya loma, kofinga, to maloba mpe ezalali oyo epesaka na nko mpasi na basusu. Nionso wana ebuki motindo ya Mobikisi ya kolingana.

Mobikisi ateyaki ete boswani ezali esalele ya zabulu. Yango eteyi solo mpo na kopamela maloba mpe ezaleli ya politiki. Kovanda na bokeseni ya makanisi ezali na ntina mpo na politiki, kasi bokeseni ya makanisi esengeli te kosangisa kofunda moto oyo epolisaka ya nzela ya leta mpe ezali etumbu na basali elongo. Banso kati na biso tosengeli kolongola bosololi ya koyina mpe kosalela bompenza mpo bokeseni ya makanisi.

Eloko eleki motuya mpo na koboya boswani mpe kosalela limemia mpo na bokeseni ezali na mokangano na biso na bandako mpe libota. Bokeseni ekoki kozanga te —boko mike misusu minene. Mpo na bkeseni ya minene, kanisa moko ya libota azali kokabola na mokangano na ndako moko. Yango ememi bantina mibale na etumba—bolingo na biso mpo na moko ya libota mpe komipesa na biso na mibeko. Na kolandaka ndakisa ya Mobikisi, tokoki kolakisa boboto yabolingo mpe kaka kozala sikisiki na bosolo na koboyaka misala oyo esalisaka to emonanaka lokola kandima oyo toyebi ezali mabe.

Nakosukisa na ndakisa ya mokangano ya libota. Na likita ya likonzi na Midwest eleki penepene na mibu 10, nakutanaki na ndeko mwasi moko oyo ayebisaki ngai ete mobali na ye azalaka mondimi na biso te azalaka koya elongo na ye na eklezia uta mibu 12 kasi asanganaka ata moke te na Eklezia. Nini asengeli kosala? Atunaki. Napesaki ye toli akoba kosala makambo nionso ya malamu mpe kokitisa matema mpe kozala boboto na mobali na ye.

Penepene sanza moko nsima akomelaki ngai mikanda lokola elandi: “ Malamu, nakanisaki ete mibu 12 ezalaki kolakisa ya malamu ya motema kokita, kasi nayebi te soki nazalaki na boboto mingi na ntina na yango. Boye, nasalaki makasi mpenza sanza mobimba, mpe azwaki libatisi.”

Boboto ezali na nguya, mingimingi na likambo ya libota. Mokanda na Ye ekobaki, “Nazali mpenza komeka kozala na boboto sika mpamba te tozali kosala mpo na kokangama na tempelo mobu oyo!”

Mibu motoba nsima akomeleki ngai mokanda mosusu: “Mobali na ngai [kaka] abiangemaki mpe atiamaki mpembeni lokola episikopo [ya paloasi na biso].”2

VI.

Na mokangano mingi mpenza mpe mabaku ya bomoi, tosengeli kovanda elongo na bokeseni. Esika bokeseni wana ya ntina na ngambo na biso esengeli te koyanganmaa to koboyama, kasi lokola balandi ya Klisto tosengeli kovanda na kimia elongo na baye basusu bazali kokabola bantina na biso te to kondima mateya likolo na yango evandisami. Mwango ya lobiko ya Tata, oyo toyebi na bobimisi ya masakoli, etii na biso na mabaku ya bomoi ya kufa wapi tozali mpo na kobatela mibeko na Ye. Yango esangisi kolinga bazalani ya mimesano mpe boyambi ekeseni lokola Ye alingaki biso. Lokola profeta ya buku ya profeta ya Buku ya Mormon ateyaki, tosengeli kokende liboso, kozalaka na “ bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso” (2 Nefi 31:20).

Atako ezali mpasi kovanda na mitungisi ezingi biso, Mobikisi na biso atindi tolingana lokola Alingi biso solo mpenza momekano monene. Nabondeli ete tosengeli kososola oyo mpe koluka kosalela yango na mikangano mpe milusu na biso nionso, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Makomi

  1. Thomas S. Monson, “Bolingo—ntina mpenza ya Nsango Malamu,” Ensign to Liahona, Sanza ya Mitano 2014, 91.

  2. Mokanda epai Dallin H. Oaks, Sanza ya Yambo. 23, 2006, mpe Sanza ya Zomi. 30, 2012.