2010–2019
Boyei Bolamu na Likita
sánzá ya zómi 2014


Boyei Bolamu na Likita

Wana ezali biso koyoka, tika mitema na biso esimbama mpe bondimi ebakisama.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, esengo kani nazali na yango mpo na kotombela bino boyei bolamu na likita linene oyo ya mokili mobimba. Tosangani elongo na bisika ebele na mokili mobimba mpo na koyoka mpe koyekola uta na bandeko mibali mpe basi oyo tosungi lokola Bakambi Minene mpe bakonzi minene ya Eklezia. Baluki lisalisi ya lola etali bitinda oyo bakoloba, mpe bayokaki bofuli etali maye makolobama.

Likita oyo ezali ekundoli mibu 90 uta ebandeli ya bopanzi nsango ya likita linene na radio. Na likita ya sanza ya zomi ya 1924, bapanzaki nsango ya mayangani na radio mpo na mbala ya yambo na nzela ya KSL ya Eklezia yangomei. Likita oyo lisusu ekundoli mibu 65 ya bopanzi nsango ya likita na television. Na likita linene oyo esalaki na sanza ya zomi 1949, mayangani elekisamaki na televisio na etuka ya Salt Lake na KSL televisio.

Tondimi mapamboli ya lolaka ya sika na kopesaka nzela na baefuku ya bandimi ya Eklezia mpo batala mpe bayoka likita linene. Mayangani ya nsuka poso oyo ezali kopanzisama nsango na nzela ya televisio, radio, nsinga, mpe Interneti, kobakisaka na bamasini ya komema na maboko.

Na basanza motoba uta tokutanaki mbala ya nsuka, tempelo moko ya sika ebulisami mpe moko ebulisami lisusu. Na sanza ya mitano, Mokambi Dieter Dieter F. Uchtdorf abulisaki Tempelo ya Fort Lauderdale Florida. Bosepeli ya kafukafu ya bonkoko na bilenge elakisamaki na mokolo liboso ya bobulisi. Mokolo oyo elandaki, na eyenga, sanza ya mitano  4, tempelo ebulisamaki na mayangani misato.

Kaka baposo mibale eleki ezalaki litomba na ngai ya kobulisa lisusu Tempelo ya Ogden Utah, oyo ebulisamaki mbala ya liboso na 1972 na Mokambi Joseph Fielding Smith. Bosepeli monene ya bonkoko esalamaki mokolo liboso ya bobulisi lisusu, na bilenge mingi mpenza kosalaka elongo ete babolakisi mibale ya kokabwana elakisamaki, na basani bakeseni mpo na moko na moko. Na nionso, bilenge 16.000 basalaki elongo. Mosala ya bobulisi lisusu esalamaki mokolo oyo elandaki, na Bandeko mibali kosalaka elongo, na bakambi ya masanga makoki mpe mokambi ya tempelo, bapesi toli na ye, mpe basi na bango.

Botongi na biso ya tempelo ezali kokoba na lokengo. Na sanza ekoya Tempelo ya Phoenix Arizona ya sika ekobulisama, mobu ekoya, na 2015, tolaki kobulisa to kobulisa lisusu ata batempelo mitano, na ntango mosusu mingi koleka, soki esili.

Lokola nalobaki na sanza ya minei, ntango batempelo nasakolaki liboso etongami mpe ebulisami, tokozala na batempelo oyo ezali kosala 170 na mokili mobimba. Mpamba te tozali kosangisa makasi na biso mpo na kosilisa batempelo oyo tosakolaki liboso, tozali te na ntango oyo kosakola batempelo ya sika kani. Nzokande, na mikolo ekoya, ntango tokomona bamposa mpe tokomona bisika, kosakola batempelo ya kobakisa ekosalama.

Eklezia ezali kokoba na kokola. Tozali sikoyo mingi koleka baefuku 15 ya makasi mpe kobakisama na mitango. Makasi na biso ya mosala ya misionele ezali kokende liboso mpe epekisami te. Tozali na bamisionele koleka 88,000 kosalaka, kokabolaka etinda ya nsango malamu na mokili mobimba. Tolobi lisusu ete mosala ya misionele ezali mokumba ya banganganzambe, mpe tolendisi bilenge mibali nionso balongobani mpe na makoki basalisa. Tozali na matondi mpenza mpo na bilenge basi oyo bazali lisusu kosalisa. Bazali kosala bopesi ya ntina, atako bazali na nse ya etinda moko te mpo na kosala lokola ezali bilenge mibali.

Sikoyo nabengisi bino bopesa bokebi na bino na bandeko mibali mpe basi oyo bakosala elongo lelo mpe lobi na mayangani na biso. Banso oyo basengami koloba bazali koyoka mokumba monene na kosalaka yango. Wana ezali biso koyoka, tika mitema na biso esimbama mpe bondimi na biso ebakisama, nasambeli na komikitisa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.